28
Mapamboli mpo na botosi
Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili. Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino :
Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga.
Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.
Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekopambolama.
Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima.
Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino ; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo. Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.
Yawe akokomisa bino libota na Ye ya bule ndenge alakaki bino tango alapaki ndayi, pamba te bokobatela mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotambola na banzela na Ye. 10 Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino. 11 Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino. 12 Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te. 13 Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te ; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te. 14 Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.
Bilakeli mabe mpo na bozangi botosi
15 Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino :
16 Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga.
17 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe.
18 Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.
19 Bokolakelama mabe tango bokokota mpe bokolakelama mabe tango bokobima.
20 Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano ; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe.
21 Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa. 22 Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino : fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino : kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa. 23 Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te. 24 Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo ; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino. 25 Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili. 26 Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango.
27 Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto. 28 Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi. 29 Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.
30 Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te. 31 Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te ; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino ; mpe moto moko te akosunga bino. 32 Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te. 33 Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso. 34 Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.
35 Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.
36 Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga. 37 Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino.
38 Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke ; pamba te mabanki ekolia bankona wana. 39 Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango. 40 Bokozala na banzete ya olive na mokili na bino mobimba, kasi bokopakola mafuta na yango te, pamba te bambuma ya olive ekokweya liboso ete ekomela. 41 Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu. 42 Mabanki ekolia banzete na bino nyonso mpe bambuma ya mabele na bino.
43 Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ; 44 akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.
45 Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino. 46 Bilakeli mabe oyo ekozala elembo mpe makambo ya kokamwa epai na bino mpe epai ya bakitani na bino mpo na libela.
47 Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki ; 48 tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino. 49 Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino. 50 Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te. 51 Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.
52 Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino. 53 Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino. 54 Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali. 55 Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso. 56 Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, 57 mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.
58 Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ; 59 Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo : bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te. 60 Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino. 61 Yawe akotindela bino lisusu lolenge nyonso ya bokono mpe bapota oyo ekomami te kati na buku oyo ya Mobeko, kino bokobebisama. 62 Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino. 63 Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango. 64 Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te. 65 Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba. 66 Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka. 67 Na tongo, bokoloba : « Pokwa ekokoma tango nini ? » Mpe na pokwa, bokoloba : « Tongo ekotana tango nini ? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona. 68 Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.
69 Tala maloba ya boyokani oyo Yawe atindaki Moyize kosala elongo na bana ya Isalaele na etando ya Moabi, na likolo ya boyokani oyo asalaki na bango na ngomba Orebi.