14
Moyize apekisaki bokoko ya matanga
Bozali bana ya Yawe, Nzambe na bino : Bokoki te komikata nzoloko mpe kokokola suki ya mito na bino soki moto akufi, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye.
Moyize apekisaki kolia banyama ya mbindo
Bokoki te kolia ata eloko moko ya mbindo. Tala banyama oyo bokoki kolia : ngombe, meme, ntaba, mbuli, mboloko, pambi, ntaba ya zamba, meme ya zamba, mbita mpe mpakasa. Bokoki lisusu kolia nyama nyonso oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, mpanya ya matoyi milayi* mpe mpanya ya zamba ; pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino. Nzokande ngulu ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Boye, ngulu ezali mbindo ; bosengeli te kolia mosuni na yango to kosimba ebembe na yango.
Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku. 10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku : ezali mbindo mpo na bino.
11 Bokolia ndeke nyonso oyo ezangi mbindo. 12 Kasi tala bandeke oyo bokolia te : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene, 13 kombekombe ya mwindo, bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, nzengo ya lolenge nyonso, 14 bayanganga ya lolenge nyonso : 15 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso. 16 Esulungutu, esulungutu ya monene, esulungutu ya pembe, 17 libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, libata ya mayi, 18 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
19 Bokoki kolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, ezali mbindo mpo na bino. 20 Nzokande, bokoki kolia nyonso oyo ezali na mapapu mpe ezangi mbindo.
21 Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa ; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino ; ye akoki na ye kolia yango ; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele.
Mibeko na tina na eteni ya zomi
22 Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota. 23 Na miso ya Yawe, Nzambe na bino, mpe na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokolia eteni ya zomi ya ble na bino, ya vino ya sika mpe ya mafuta, bana nyonso ya liboso ya bangombe na bino, ya bantaba na bino mpe ya bameme na bino. Na bongo, bokoyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino. 24 Kasi soki esika yango ezali mosika mingi mpo na yo komema eteni na yo ya zomi epai na Yawe, Nzambe na yo, pamba te esika oyo Yawe aponaki mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi, wana Nzambe na yo apamboli yo, 25 okoteka eteni na yo ya zomi ; bongo mbongo oyo okozwa, okokende na yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. 26 Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi : ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo. 27 Kobosana te Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bazali ata na eteni ya mabele te to libula mpo na bango moko.
28 Na suka ya mibu misato nyonso, bokomema biteni ya zomi nyonso ya mibu wana mpe bokobomba yango na bingumba na bino. 29 Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.
* 14:7 Mpanya ya matoyi milayi elakisi na lifalanse : lièvre. 14:7 Mpanya ya zamba elakisi na lifalanse : daman.