15
Mobu ya kosundola baniongo mpe ya kotika bawumbu
Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo. Tala ndenge esengeli kosalema : moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka. Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino. Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka, soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.
Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola. Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga. Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo. 10 Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba. 11 Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.
12 Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba ; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi. 13 Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te ; 14 okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino ; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo. 15 Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.
16 Kasi soki alobi na yo : « Naboyi kotika yo, » mpo ete alingaka yo elongo na libota na yo mpe azalaka na esengo ya kovanda elongo na yo, 17 wana okozwa motonga, okotia litoyi na ye na ezipelo ya ekuke mpe okotobola yango. Na bongo, akokoma mowumbu na yo mpo na libela. Okosala mpe ndenge moko mpo na mwasi mowumbu.
18 Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala.
Mobeko na tina na bana liboso ya bibwele
19 Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso. 20 Mibu nyonso, bino elongo na mabota na bino, bokolia bibwele yango na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona. 21 Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino. 22 Bokolia yango kati na bingumba na bino : moto nyonso, azala mbindo to peto, akolia yango ndenge baliaka mboloko to mbuli. 23 Kasi bokolia makila te, bosopa yango na mabele lokola mayi.