13
Moyize apekisaki kogumbamela banzambe mosusu
Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te.
Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa, mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te, bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba. Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino ; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye. Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba : « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te, banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu), koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te. 10 Ya solo, osengeli koboma ye na mabanga. Loboko na yo ekozala loboko ya liboso mpo na kobamba ye mabanga mpe sima maboko ya bato nyonso. 11 Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu. 12 Boye, Isalaele nyonso ekoyoka mpe ekobanga, bongo moto moko te kati na bino akosala lisusu makambo mabe ya lolenge oyo.
13 Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda 14 ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango : « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te, 15 wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo, 16 osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso : bato na yango mpe bibwele na yango. 17 Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te. 18 Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi, 19 soki otosi Yawe, Nzambe na yo, obateli mibeko na Ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo mpe otamboli na bosembo na miso Ye.