29
Mokonzi Akishi azongisi Davidi na Tsikilagi
Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli. Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi. Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki :
— Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa ?
Akishi alobaki na bango :
— Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo ; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.
Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki :
— Zongisa moto oyo ! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye ; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te ? Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina :
« Saulo abomaki bankoto,
mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye :
— Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te. Boye, zonga mpe kende na kimia ; kosala eloko moko te oyo ekosepelisa te bakambi ya bato ya Filisitia.
Davidi atunaki Akishi :
— Nasali nini ? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo ? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai ?
Akishi azongiselaki Davidi :
— Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi : « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. » 10 Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima.
11 Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia ; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.