28
Saulo epai ya mwasi oyo asololaka na bakufi
Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi :
— Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai.
Davidi azongiselaki Akishi :
— Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala.
Akishi alobaki na Davidi :
— Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.
 
Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.
Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa. Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye. Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.
Bongo, Saulo alobaki na basali na ye :
— Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye.
Basali na ye bazongisaki :
— Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori.
Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki :
— Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye.
Kasi mwasi yango alobaki na ye :
— Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai ?
10 Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki : « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. »
11 Bongo mwasi yango atunaki :
— Nabimisela yo nani ?
Saulo azongisaki :
— Bimisela ngai Samuele.
12 Tango mwasi yango amonaki Samuele, agangaki makasi mpe alobaki na Saulo :
— Mpo na nini okosi ngai ? Ozali Saulo !
13 Mokonzi alobaki na ye :
— Kobanga te, omoni nini ?
Mwasi alobaki na Saulo :
— Namoni nzambe moko kobima na mabele.
14 Saulo atunaki ye :
— Azali ndenge nini ?
Mwasi azongisaki :
— Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka.
Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele.
15 Samuele alobaki na Saulo :
— Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai ?
Saulo alobaki :
— Nazali na pasi makasi : bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai ; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala.
16 Samuele alobaki :
— Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yawe asili kopesa yo mokongo mpe akomi monguna na yo ? 17 Yawe akokisi kaka makambo oyo asakolaki na nzela na ngai : Yawe abotoli bokonzi na maboko na yo mpe apesi yango na moninga na yo, Davidi, 18 pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo. 19 Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.
20 Mbala moko, Saulo abombamaki na mabele mpe ayokaki maloba ya Samuele somo mingi. Nzoto na ye elembaki mpo ete aliaki eloko moko te mokolo mobimba mpe butu mobimba.
21 Tango mwasi apusanaki pembeni ya Saulo mpe amonaki ete azali lisusu na kimia te, alobaki na ye :
— Tala, mwasi mosali na yo atosaki yo. Nandimaki kokufa mpo na kaka kosala makambo oyo otindaki ngai. 22 Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo : yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo.
23 Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki :
— Nakolia te.
Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto. 24 Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire. 25 Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki.