15
Yawe aboyi Saulo
Samuele alobaki na Saulo : « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe. Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito : bakangelaki Isalaele nzela. Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »
Boye Saulo abengisaki basoda, mpe atangaki bango na Telayimi : basoda oyo babundaka na makolo, nkoto nkama mibale ; mpe basoda oyo bawutaki na Yuda, nkoto zomi. Saulo akendeki kino na engumba ya Amaleki mpe atiaki basoda na bisika ya kobombama, na lubwaku. Bongo Saulo alobaki na bato ya Keni : « Bokende na bino, bolongwa na milongo ya bato ya Amaleki mpo ete nabebisa bino te elongo na bango, pamba te bosalelaki bato nyonso ya Isalaele bolamu tango babimaki na Ejipito. »
Boye bato ya Keni balongwaki na milongo ya bato ya Amaleki.
Saulo abundisaki bato ya Amaleki nzela mobimba, longwa na Avila kino na Shuri, na ngambo ya este ya Ejipito. Akangaki ya bomoi Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki, mpe abebisaki bato nyonso na mopanga. Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.
10 Yawe alobaki na Samuele :
11 — Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai.
Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba. 12 Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. » 13 Samuele akendeki epai ya Saulo, mpe Saulo alobaki na ye :
— Tika ete Yawe apambola yo ! Natosaki mitindo ya Yawe.
14 Kasi Samuele alobaki :
— Makelele oyo nazali koyoka ezali te koganga ya bameme mpe ya bangombe ?
15 Saulo azongisaki :
— Basoda babotolaki yango na maboko ya bato ya Amaleki ; babatelaki kati na bibwele bameme mpe bangombe oyo elekaki kitoko mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na biso ; kasi nyonso wana mosusu, tobebisaki yango penza.
16 Samuele alobaki na Saulo :
— Kata ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka.
Saulo alobaki na ye :
— Yebisa ngai yango !
17 Samuele alobaki :
— Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele. 18 Yawe apesaki yo etinda mpe alobaki : « Kende mpe bebisa penza bato oyo ya masumu, bato ya Amaleki ; bundisa bango kino okosilisa koboma bango. » 19 Mpo na nini otosaki Yawe te ? Mpo na nini owelaki kozwa bomengo ya bitumba, mpe osalaki mabe na miso ya Yawe ?
20 Saulo azongiselaki Samuele :
— Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai : Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango. 21 Kasi basoda bazwaki kati na bomengo ya bitumba bameme mpe bangombe oyo elekaki malamu kati na oyo Nzambe asengaki ete ebebisama, mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na yo, na Giligali.
22 Samuele alobaki :
— Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali. 23 Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo ; ozali lisusu mokonzi te.
24 Bongo Saulo alobaki na Samuele :
— Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango. 25 Sik’oyo nabondeli yo, limbisa masumu na ngai ; mpe zonga elongo na ngai, mpo ete nakoka kogumbamela Yawe.
26 Kasi Samuele alobaki na Saulo :
— Nakozonga elongo na yo te ; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.
27 Lokola Samuele abalukaki mpo na kokende, Saulo akangaki ye na songe ya kazaka na ye, mpe kazaka epasukaki. 28 Bongo Samuele alobaki na ye :
— Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo. 29 Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.
30 Saulo alobaki :
— Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.
31 Boye Samuele akendeki elongo na Saulo, mpe Saulo agumbamelaki Yawe. 32 Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. »
Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »
33 Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. »
Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.
34 Bongo Samuele azongaki na Rama, mpe Saulo akendeki na ndako na ye, na Gibea ya Saulo.
35 Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele.