14
Jonatan alongi bato ya Filisitia
Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Yaka ! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. »
Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.
Saulo avandaki na mondelo ya engumba Gibea, na se ya nzete ya grenade oyo ezali na Migironi, elongo na basoda pene nkama motoba. Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.
Na bangambo ya se ya lubwaku oyo Jonatan asengelaki kokatisa mpo na kokende kobundisa bato ya Filisitia, ezalaki na libanga moko na ngambo moko na moko. Babengaki moko Botsetsi, mpe mosusu, Sene. Libanga moko etelemaki na ngambo ya nor, na nzela oyo ekenda na Mikimasi, mpe mosusu etalanaki na Geba, na sude.
Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye :
— Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.
Elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azongisaki :
— Sala nyonso oyo ozali na yango na makanisi. Kende ! Nazali elongo na yo na motema mpe na molimo.
Jonatan alobaki na ye :
— Tokende kino na molako ya basoda yango mpe tomimonisa epai na bango. Soki balobi na biso : « Botelema wana, bozela kino biso moko tokoya epai na bino ; » wana tokovanda na esika oyo tozali mpe tokokende epai na bango te. 10 Kasi soki balobi na biso : « Boya epai na biso, » tokokende epai na bango, pamba te yango ekozala elembo mpo na biso ete Yawe akabi bango na maboko na biso.
11 Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki : « Botala ! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. » 12 Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. »
Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. »
13 Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso ; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango. 14 Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko.
15 Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.
Bato ya Isalaele bakimisi bato ya Filisitia
16 Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso. 17 Bongo Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki elongo na ye : « Botanga basoda mpo na koyeba banani basili kokima. »
Tango batangaki, bamonaki ete Jonatan mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye bazali te.
18 Saulo alobaki na Ayiya : « Boya na Sanduku ya Nzambe. »
Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.
19 Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe : « Tika ! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. »
20 Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba ; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga. 21 Ba-Ebre oyo basalelaki liboso bato ya Filisitia mpe bakendeki elongo na bango na bitumba mosusu, bango basanganaki na bato ya Isalaele, oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Jonatan. 22 Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia. 23 Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni.
Basoda ya Isalaele babikisi Jonatan
24 Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. »
Boye moto moko te amekaki kolia. 25 Bato nyonso bakotaki na zamba mpe bamonaki mafuta ya nzoyi, na mabele. 26 Tango bakotaki na zamba, bamonaki mafuta ya nzoyi kotanga, mpe moko te asimbaki mpe aliaki yango mpo na kotosa ndayi. 27 Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi ; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki. 28 Bongo moko kati na basoda alobaki na ye :
— Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi.
29 Jonatan alobaki :
— Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi ! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi. 30 Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene !
31 Na mokolo wana, sima na bato ya Isalaele kosilisa koboma bato ya Filisitia wuta na Mikimasi kino na Ayaloni, balembaki makasi. 32 Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango. 33 Moto moko alobaki na Saulo :
— Tala ! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila.
Saulo alobaki :
— Bokweyisi kondima ! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa.
34 Saulo abakisaki :
Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango.
Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango. 35 Bongo Saulo atongaki etumbelo mpo na Yawe ; ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala likambo ya boye.
36 Saulo alobaki :
— Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango.
Bato bazongisaki :
— Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.
Kasi Nganga-Nzambe alobaki :
— Totuna Nzambe na esika oyo.
37 Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? »
Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.
38 Saulo alobaki :
— Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa ! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo. 39 Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa.
Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.
40 Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele :
— Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu.
Bato bazongisaki :
— Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.
41 Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele : « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. »
Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te. 42 Saulo alobaki : « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. »
Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan. 43 Bongo Saulo alobaki na Jonatan :
— Yebisa ngai likambo oyo osalaki.
Jonatan alobaki :
— Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa !
44 Saulo alobaki :
— Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.
45 Kasi bato balobaki na Saulo :
— Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo.
Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te. 46 Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango.
Bitumba oyo Saulo alongaki
47 Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso : Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana. 48 Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko.
49 Bana mibali ya Saulo bazalaki : Jonatan, Yishivi mpe Maliki-Shuwa. Azalaki na bana mibale ya basi : ya mokolo, kombo na ye ezalaki « Merabi ; » mpe ya leki, « Mikali. » 50 Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo. 51 Kishi, tata ya Saulo, mpe Neri, tata ya Abineri, bazalaki bana mibali ya Abieli. 52 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia ; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.