11
Saulo akangoli engumba Yabeshi
Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi :
— Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo.
Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki :
— Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni.
Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye :
— Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele ; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo.
Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.
Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki : « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye ? »
Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki. Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi. Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. »
Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko. Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato. Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › »
Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi. 10 Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni : « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. »
11 Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko.
Saulo andimami lokola mokonzi
12 Bato balobaki na Samuele :
— Wapi bato oyo bazalaki koloba : « Boni, Saulo akoyangela biso ? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango.
13 Kasi Saulo alobaki :
— Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo.
14 Samuele alobaki na bato :
— Boya ! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo.
15 Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.