10
Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ? Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › » Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba ; mosusu, biteni misato ya mapa ; mpe mosusu, molangi ya vino. Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango. Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola. Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu. Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo. Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo ; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
Saulo asakoli
Tango kaka Saulo abalukaki mpo na kotika Samuele, Nzambe abongolaki motema ya Saulo, mpe bilembo nyonso ekokisamaki mokolo wana kaka. 10 Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye ; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango. 11 Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki : « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi ? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? » 12 Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki : « Bongo nani azali motambolisi na bango ? »
Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo : « Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »
13 Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba. 14 Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye :
— Bokendeki wapi ?
Saulo azongisaki :
— Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.
15 Noko ya Saulo alobaki lisusu :
— Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino.
16 Saulo azongiselaki noko na ye :
— Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo.
Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.
Saulo akomi mokonzi ya Isalaele
17 Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe 18 mpe alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. › 19 Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »
20 Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki. 21 Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te. 22 Boye, batunaki lisusu Yawe :
— Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ?
Yawe azongisaki :
— Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.
23 Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato ; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi. 24 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso :
— Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye.
Bato bazongisaki na koganga :
— Tika ete mokonzi awumela na bomoi !
25 Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye.
26 Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye. 27 Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? »
Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.