4
Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi. Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango. Kasi tosambelaki Nzambe na biso mpe totiaki bakengeli, butu mpe moyi, mpo ete babundela biso liboso na bango. Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! »
Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba : « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. »
Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na bango bayaki mbala zomi koyebisa biso mabongisi na bango : « Na bisika nyonso oyo bokozala, bakobundisa biso ! »
Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango. Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu : « Bobanga bango te ! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino ! »
Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye.
10 Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda. 11 Ezala ba-oyo bazalaki kotonga mir mpe ba-oyo bazalaki komema mabele mpe biloko ya mosala, bango nyonso bazalaki kosala na loboko moko ; bongo na loboko mosusu, basimbaki ebundeli. 12 Moko na moko kati na batongi ndako azalaki na mopanga na ye na loketo, mpe azalaki kosala mosala na ye ndenge wana. Na mopanzi na ngai, ezalaki na moto moko abongama mpo na kobeta kelelo. 13 Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu :
— Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi ; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu. 14 Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.
15 Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka. 16 Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato : « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye ; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. »
17 Ezala ngai, bandeko na ngai, basali na ngai to bakengeli oyo bazalaki elongo na ngai, moko te azalaki kolongola bilamba na ye ; moto nyonso azalaki na ebundeli na ye na loboko ata tango azalaki kokende kosukola.