3
Bato ya Yuda batongi mir ya Yelusalemi
Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.
Bato ya Jeriko babongisaki eteni ya mir oyo ekanganaki na yango ; mpe Zakuri, mwana mobali ya Imiri, atongaki pene na bango. Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi ; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango. Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango. Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala. Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana*. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango. Uzieli, mwana mobali ya Araya, moko kati na banyangwisi bibende na moto, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Bongo Anania, moko kati na basali oyo basalaka malasi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo elandaki. Babongisaki mir ya Yelusalemi kino na esika ya mir monene. Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. 10 Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye. 11 Malikiya, mwana mobali ya Arimi, mpe Ashubi, mwana mobali ya Paati-Moabi, babongisaki eteni mosusu ya mir mpe ndako molayi ya Fulu.
12 Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki. 13 Anuni mpe bavandi ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lubwaku. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Babongisaki lisusu bametele pene nkama mitano ya mir kino na Ekuke ya Fulu. 14 Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. 15 Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba ; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi.
16 Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi. 17 Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye. 18 Bandeko na ye batongaki pembeni na ye, na bokambami ya Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, mokambi ya ndambo mosusu ya etuka ya Keila. 19 Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana.
20 Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe. 21 Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango. 22 Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye. 23 Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye. 24 Pene na ye, Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika oyo bamir ekutana mpe kino na songe.
25 Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi, 26 elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi. 27 Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli. 28 Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye. 29 Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye. 30 Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye.
31 Pene na Meshulami, Malikiya, moko kati na basali oyo banyangwisaka bibende na moto, abongisaki eteni na ye kino na ndako ya basali ya Tempelo mpe ya bato ya mombongo. Eteni yango etalani na Ekuke ya Kokengela mpe kino na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutana. 32 Bongo banyangwisi bibende na moto mpe bato ya mombongo babongisaki longwa na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutani, kino na Ekuke ya Bibwele.
Batelemeli misala ya kotonga
33 Tango Sanibala ayokaki ete tozali kotonga lisusu mir, asepelaki ata moke te mpe atombokaki makasi. Akomaki kotiola Bayuda 34 mpe koloba liboso ya baninga na ye mpe ya mampinga ya Samari :
— Bayuda oyo balemba-lemba boye bazali kosala nini ? Bakanisi ete bakotelemisa lisusu mir na bango to kobonza lisusu mbeka ? Bakanisi penza ete, mokolo moko, bakosilisa mosala oyo to bakokoka solo kopesa bomoi na mabanga oyo ekundama na se ya mabele mpe esila kozika ?
35 Tobiya, moto ya Amoni, oyo azalaki pembeni na ye alobaki :
— Nini yango penza bazali kotonga ! Mir oyo, soki ata mbwa moko ya zamba emati na likolo na yango, ekokweya !
 
36 Oh Nzambe na biso, yoka biso, pamba te totiolami ! Sala ete kotiola na bango ezonga na mito na bango moko ! Kaba bango na mboka ya bowumbu lokola bomengo ya bitumba. 37 Kozipa mabe na bango te mpe kolongola masumu na bango na miso na Yo te, pamba te basili kofinga bato oyo bazali kotonga mir.
 
38 Bongo tokobaki kotonga mir yango kino nyonso ekomaki na kati-kati ya bosanda, pamba te moto nyonso azalaki kosala mosala na motema na ye mobimba.
* 3:6 Yeshana elingi koloba : Ekuke ya mir ya kala.