21
Bingumba ya Balevi
Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango : « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. »
 
Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.
 
Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame.
Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.
Bakitani ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki bingumba zomi na mibale kati na mabele ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni.
 
Boye, ndenge Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize, bana ya Isalaele babetaki zeke mpo na kopesa bingumba wana elongo na mabele na yango epai ya bakitani ya Levi.
 
Kati na mabota ya Yuda mpe ya Simeoni, babetaki zeke mpo na kopesa bingumba oyo, kolanda bakombo na yango, 10 epai ya bakitani ya Aron, oyo babimelaki na bituka ya Keati kati na bana mibali ya Levi, pamba te zeke ya liboso ekweyaki epai na bango :
11 Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki) ; 12 kasi bapesaki bilanga ya engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, lokola libula epai ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune. 13 Epai ya bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, bapesaki Ebron lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Libina, 14 Yatiri, Eshitemoa, 15 Oloni, Debiri, 16 Ayini, Yuta mpe Beti-Shemeshi, elongo na mabele na yango. Bazwaki bingumba libwa kati na bituka ya mabota oyo mibale : Yuda mpe Simeoni.
17 Kati na libota ya Benjame, bapesaki bango bingumba oyo :
Gabaoni, Geba, 18 Anatoti, Alimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
19 Bingumba nyonso ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
 
20 Babetaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani mosusu ya Levi, oyo bazali ya bituka ya Keati, moko kati na bana mibali ya Levi, bingumba oyo, kati na mabele ya libota ya Efrayimi.
21 Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, bapesaki bango :
Sishemi lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Gezeri, 22 Kibitsayimi mpe Beti-Oroni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
23 Kati na libota ya Dani, bapesaki bango bingumba oyo :
Eliteke, Gibetoni, 24 Ayaloni, Gati-Rimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
25 Kati na ndambo ya libota ya Manase, bapesaki bango bingumba oyo :
Taanaki, Gati-Rimoni elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.
26 Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bituka mosusu ya bakitani ya Keati ezalaki zomi, elongo na mabele na yango.
 
27 Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo :
Kati na ndambo ya libota ya Manase :
kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.
28 Kati na libota ya Isakari :
Kishioni, Dabirati, 29 Yarimuti, Eyini-Ganimi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
30 Kati na libota ya Aseri :
Misheali, Abidoni, 31 Elikati, Reobi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
32 Kati na libota ya Nefitali :
Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato.
33 Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bakitani ya Gerishoni, kolanda bituka na bango, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
 
34 Epai ya bituka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, bapesaki bingumba oyo :
Kati na libota ya Zabuloni :
Yokineami, Karita, 35 Dimina mpe Naalali, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
36 Kati na libota ya Ribeni :
Betseri lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Yakatsi, 37 Kedemoti mpe Mefati, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
38 Kati na libota ya Gadi :
Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi, 39 Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
40 Bingumba nyonso oyo babetelaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani ya etuka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, ezalaki zomi na mibale.
 
41 Bingumba nyonso ya bakitani ya Levi kati na mabele oyo epesamelaki bana ya Isalaele ezalaki tuku minei na mwambe, elongo na mabele na yango. 42 Engumba moko na moko ezingelamaki na mabele na yango ; ezalaki penza bongo mpo na bingumba yango nyonso.
Nzambe akokisaka bilaka na Ye
43 Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. 44 Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango. 45 Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya ; solo, nyonso ekokisamaki.