20
Bingumba ya kokimela
Yawe alobaki na Jozue : « Yebisa bana ya Isalaele ete bapona bingumba ya kokimela, ndenge nayebisaki bino na nzela ya Moyize, mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoka kokimela kuna mpe azwa ebombamelo liboso ya mobukanisi makila*.
Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango. Soki mobukanisi makila alandi ye, bampaka basengeli te kokaba mobomi yango na maboko na ye, pamba te abomaki mozalani na ye na nko te mpe azalaki liboso na makanisi ya mabe te. Akotikala na engumba wana kino tango akoleka na esambiselo liboso ya lisanga mpe kino tango mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo azali na mosala na tango wana, akokufa. Na sima na yango nde mobomi yango akoki kozonga na engumba na ye, na ndako na ye, kati na engumba epai wapi awuta. »
Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.
Yango nde ezalaki bingumba oyo eponamaki mpo na moto nyonso ya Isalaele to mpe mpo na mopaya nyonso oyo azali kovanda kati na bango. Moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokimela kuna, mpo ete mobukanisi makila aboma ye te, liboso ete aleka na esambiselo na miso ya lisanga.
* 20:3 Mobukanisi makila azali moto oyo apesameli mokumba ya kopesa etumbu ya kufa epai ya babomi.