9
Pasi ya bowumbu
Isalaele, kosepela te ;
kozala na esengo te lokola bikolo mosusu ;
pamba te otikaki Nzambe na yo
mpe okendeki kosala kindumba ;
osepelaki na lifuti ya kindumba
na bitando nyonso oyo batutelaka ble.
Etando oyo batutelaka ble mpe ekamolelo masanga ya vino
ekopesa bango bilei te,
mpe bakozanga vino ya sika.
Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe ;
Efrayimi akozonga na Ejipito,
mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.
Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te,
mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te.
Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga :
bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo ;
pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango,
kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.
 
Boye, bokosala nini na mikolo ya bafeti oyo ekatama,
na mikolo ya bafeti ya Yawe ?
Ata soki bakimi, bakobebisama ;
Ejipito ekoyamba bango,
Mefisi ekozala kunda na bango ;
matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango,
banzube ekotonda kati na bandako na bango.
Mikolo ya etumbu ezali koya,
mikolo ya kofuta masumu esili koya.
Isalaele, yeba yango !
Mosakoli akomi zoba,
moto ya Molimo abeli liboma !
Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza,
mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.
Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai,
azali mosakoli ;
Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso
mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.
Bamikotisi penza kati na mabe
ndenge basalaki na mikolo ya Gibea.
Nzambe akobosana mabe na bango te
mpe akopesa bango etumbu
mpo na masumu na bango.
 
10 Tango namonaki Isalaele,
azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe.
Tango namonaki bakoko na bino,
bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi.
Kasi tango bakomaki na Bala Peori,
bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni
mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
11 Nkembo ya Efrayimi ekokima lokola ndeke,
wuta na mbotama,
wuta na zemi,
wuta na ebandeli ya zemi.
12 Ezala soki babokoli bana,
nakobotola bango liboso ete bakola.
Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !
13 Nazali komona Efrayimi lokola engumba Tiri
oyo etongama na likolo ya mabele ya kitoko ;
nzokande, Efrayimi akokaba bana na ye na mobomi.
14 Oh Yawe, pesa bango…
Okopesa bango nini ?
Pesa bango mabumu oyo esopaka bazemi,
mpe mabele oyo ekawuka.
 
15 Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso
oyo basalaki na Giligali ;
Nakobengana bango na Ndako na Ngai
mpo na misala na bango ya mabe.
Nakolinga bango lisusu te,
pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.
16 Efrayimi alembi,
misisa na ye ekawuki ;
akobota lisusu bambuma te ;
ata soki baboti bana,
nakoboma bana na bango oyo balingaka mingi.
 
17 Nzambe na ngai akobwaka bango,
pamba te batosaki Ye te,
mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.