10
Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele,
azalaki kobota mbuma mpo na ye moko.
Ndenge azalaki kobota mbuma ebele,
ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ;
ndenge mabele na ye ekomaki kitoko,
ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.
Mitema na bango etondi na mabe
mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango.
Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango
mpe akopanza mabanga na bango ya bule.
 
Boye bakoloba :
« Tozali na mokonzi te,
pamba te totosaki Yawe te.
Ata tozalaki na mokonzi,
akokaki kosala nini mpo na biso ? »
Bapesaka bilaka ebele,
balapaka ndayi ya lokuta
mpe basalaka boyokani.
Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge
oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.
Bavandi ya Samari bazali kolenga
mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ;
bato na yango mpe Banganga-Nzambe
oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe
bakosala matanga na tina na yango.
Tika ete basepela lelo
mpo ete nkembo ya mwana ngombe
elongwe kati na bango.
Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri
lokola likabo mpo na mokonzi monene.
Efrayimi akoyoka soni,
mpe Isalaele akosambwa
mpo na mabongisi oyo basalaki.
 
Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango
bakotiola likolo ya mayi
lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.
Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni
epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama.
Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango
mpe ekozipa yango.
Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! »
Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »
 
Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea
mpe obongwani te.
Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?
10 Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi ;
bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita
mpe bakokanga bango minyololo
likolo ya masumu mibale oyo basalaki.
 
11 Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi
oyo babokola malamu,
alingaka kobeta ble ;
kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko.
Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda,
Yuda akobalola mabele,
Jakobi akopanza-panza yango.
12 Bolona bosembo mpo na bino moko
mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo.
Bomikatela bilanga ya sika,
pamba te tango ya koluka Yawe ekoki
kino tango akoya kosopela bino bosembo.
13 Bolonaki makambo mabe,
bobukaki mpe makambo mabe
mpe boliaki mbuma ya lokuta,
pamba te botiaki elikya na makasi
mpe na ebele ya basoda na bino.
14 Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo,
bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ;
ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli
na mokolo ya bitumba,
tango bamama mpe bana na bango
bakweyaki na mabele.
15 Beteli, makambo oyo ekokomela yo
mpo ete mabe na yo eleki ndelo.
Tango mokolo yango ekokoka,
mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.