13
Kufa ya Efrayimi
Tango Efrayimi azalaki koloba,
bato bazalaki kolenga ;
azalaki kokonza kati na Isalaele,
kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ;
yango wana akufaki.
Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ;
na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko
na nzela ya palata na bango balekisa na moto,
bililingi oyo babongisa malamu :
nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko.
Balobaka na tina na bango :
« Babonzaka bato lokola bambeka
mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »
Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo,
lokola londende ya tongo oyo elimwaka,
lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika
na esika oyo batutelaka ble,
mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.
 
« Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo,
oyo abimisaki yo wuta na Ejipito.
Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai,
ozali na mobikisi mosusu te.
Ngai, nayebaki yo kati na esobe,
kati na mabele oyo ekawuka.
Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi,
bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.
Boye, nakokweyela bino lokola nkosi
mpe nakozela bino na nzela lokola nkoyi.
Nakolanda bino lokola ngombolo
oyo ebungisi bana na yango
mpe nakopasola misuni ya mitema na bino.
Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi,
bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.
 
Isalaele, obebisami ;
pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo !
10 Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo ?
Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso
oyo, na tina na bango, bozalaki koloba :
‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli ? ›
11 Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi,
mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.
12 Mabe ya Efrayimi ebombami,
mpe masumu na ye ekomami penza.
13 Pasi ekomeli ye
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ;
kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele,
soki tango ya kobotama ekoki,
abimaka na libumu ya mama na ye te.
14 Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi,
nakosikola bango na kufa.
Oh kufa, wapi nguya na yo ?
Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ?
Nakoyokela bango mawa te !
15 Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali,
mopepe ya este ekoya,
mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe :
ekokawusa etima ya Efrayimi,
ekokawusa liziba na ye.
Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo
wuta na ebombelo na yango. »