Kozonga epai na Yawe : nzela ya lobiko
12
Masumu ya Isalaele
Efrayimi azingeli Ngai na lokuta,
mpe libota ya Isalaele, na kokosa ;
kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe,
elongo na Mosantu ya solo.
Efrayimi aliaka mopepe ;
mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ;
mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe.
Asalaka boyokani elongo na Asiri
mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
Yawe alingi kosamba na Yuda ;
akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye
mpe akofuta ye kolanda misala na ye.
Na libumu ya mama na bango,
akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe ;
tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.
Abundaki na anjelu mpe alongaki,
alelaki mpe asengaki ngolu na ye.
Jakobi akutanaki na ye na Beteli,
mpe ezali kuna nde asololaki na ye.
Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga,
Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.
 
Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo ;
batela bolingo mpe bosembo
mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.
Bato ya Kanana basalelaka
emekelo kilo ya lokuta,
balingaka kaka kokosa.
 
Efrayimi alobaka na lolendo nyonso :
« Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi.
Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai
na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
 
10 Nazali Yawe, Nzambe na yo,
oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ;
nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo
lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
11 Nalobaki na nzela ya basakoli,
napesaki bango bimoniseli ebele
mpe nalobaki na masese na nzela na bango.
12 Lokola Galadi etondi na mabe,
ekokoma eloko pamba
mpo ete bato na yango babonzaki
bangombe ya mibali na Giligali ;
mpe bitumbelo na bango ekobukama
mpe ekokoma mipiku ya mabanga
kati na banzela ya mikala ya bilanga.
13 Jakobi akimaki na mokili ya Siri ;
Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi ;
mpe mpo na kobala mwasi yango,
andimaki kokoma mobateli bibwele.
14 Yawe asalelaki mosakoli
mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito,
abatelaki ye na nzela ya mosakoli.
 
15 Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi,
yango wana, Nkolo na ye akotangela ye
ngambo ya makila oyo asopaki
mpe akofuta ye kolanda mabe na ye.