11
Yawe asalaki makambo mpo na bato
Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye. Nazali koloba na bana na bino te oyo batikalaki te koyeba to komona nyonso wana, kasi na bino oyo bozali awa lelo ete bobosanaka te malako ya Yawe, Nzambe na bino, monene na Ye, nguya na Ye, bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba, makambo oyo asalaki na mampinga ya Ejipito, na bampunda mpe bashar na yango, ndenge azindisaki yango kati na Ebale monene ya barozo, tango ezalaki kolanda bino, mpe ndenge nini Yawe alimwisaki yango libela ; makambo oyo asalelaki bino kati na esobe kino bokoma na esika oyo, makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba. Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki. Yango wana, bobatela mibeko nyonso oyo napesi bino lelo mpo ete bozala makasi mpe bokoka kobotola mokili oyo bolingi kokota mpo na kozwa mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
10 Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino. 11 Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo. 12 Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.
13 Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba, 14 nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta. 15 Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda.
16 Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango, 17 noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino. 18 Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo. 19 Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki. 20 Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino 21 mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela.
22 Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ; 23 wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi. 24 Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene. 25 Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende.
 
26 Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe. 27 Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo ; 28 bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te.
29 Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali. 30 Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More. 31 Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango, 32 bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo.