10
Yawe alimbisaki bato na Ye
Na tango wana, Yawe alobaki na ngai : « Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe mata epai na ngai na likolo ya ngomba ; okosala lisusu sanduku ya mabaya. Nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya mabanga ya liboso, oyo obukaki ; mpe okotia bitando yango kati na sanduku. » Boye nasalaki sanduku na mabaya ya nzete ya akasia mpe nabongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Namataki likolo ya ngomba, namemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ngai. Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso : mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani ; mpe Yawe apesaki ngai yango. Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo.
Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe. Longwa wana, bakendeki na Gudigoda ; sima bakendeki na Yotibata, mokili ya miluka ebele. Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo. Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango : Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango.
10 Boye natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ndenge nasalaki na mbala ya liboso, mpe Yawe ayokelaki ngai na mbala oyo lisusu, pamba te kobebisa bino ezalaki mokano na Ye te. 11 Na sima, Yawe alobaki na ngai : « Kende mpe kamba bato oyo mpo ete bakota mpe bakamata mokili oyo nalakaki kopesa epai na batata na bango na nzela ya ndayi. »
Yawe asengaki na Isalaele botosi
12 Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, 13 mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko. 14 Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango. 15 Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo. 16 Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te ; 17 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te, 18 abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba. 19 Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
20 Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye. 21 Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko. 22 Bakoko na yo nyonso oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo ; mpe sik’oyo, Yawe, Nzambe na yo, akomisi bino ebele lokola minzoto ya likolo.