13
Kopetolama na masumu 
 
1 Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.   
2 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.  
3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe ! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga.  
4 Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.  
5 Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! ›  
6 Soki batuni ye : ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi ? › Akozongisa : ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. ›   
Kobetama ya mobateli bibwele 
 
7 Oh mopanga, telema !  
Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai !  
Tika ete oboma moninga na Ngai, »  
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.  
« Beta mobateli bibwele,  
mpe bameme ekopalangana.  
Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.   
8 Na mokili mobimba, »  
elobi Yawe,  
« bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato  
bakobebisama mpe bakokufa ;  
mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato  
nde bakotikala na mokili.   
9 Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto,  
nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto  
mpe nakomeka bango  
ndenge bamekaka wolo na moto ;  
bakobelela Kombo na Ngai,  
mpe Ngai nakoyanola bango.  
Nakoloba na bango :  
‹ Bozali bato na Ngai, ›  
mpe bango bakoloba :  
‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »