7
Baninga
Zonga, zonga, oh mwasi ya Sulami !
Zonga, zonga mpo ete tokoka kotala yo malamu !
Mpo na nini bolingi kotala malamu mwasi ya Sulami
ndenge batalaka mabina ya mindule ya masanga mibale ?
Elenge mobali
Oh elenge mwasi ya lokumu !
Makolo na yo ebimaka kitoko soki olati basandale.
Zingazinga ya loketo na yo ezali lokola lopete
oyo esalemi na maboko ya basali bikeko.
Motolu na yo ezali lokola kopo ya kitoko
oyo ezangaka vino ya kitoko te.
Libumu na yo ezali lokola mopiku ya ble
oyo ezingami na fololo oyo babengaka lisi.
Mabele na yo nyonso mibale ezali
lokola bana mapasa mibale ya mboloko.
Kingo na yo ezali lokola ndako molayi
oyo batonga na pembe ya nzoko.
Miso na yo ezali lokola maziba ya engumba Eshiboni,
pembeni ya ekuke ya Bati-Rabimi.
Zolo na yo ezali lokola ndako molayi ya Libani
oyo etalani na Damasi.
Moto na yo ezali lokola ngomba Karimeli,
mpe suki ya moto na yo ezali lokola elamba ya motane ;
mokonzi akangami na mazita na yango.
Oh tala ndenge ozali penza kitoko !
Bolingo na ngai, osalaka esengo ya motema na ngai ;
kitoko na yo esalaka ngai esengo na motema !
Molayi na yo ezali lokola nzete ya mbila,
mabele na yo ezali lokola maboke ya bambuma.
Namilobeli : « Nakomata na nzete ya mbila,
nakobuka bambuma na yango ! »
 
Tika ete mabele na yo ezala lokola maboke
ya bambuma ya vino !
Tika ete solo ya monoko na yo ezala lokola bapome !
10 Mpe tika ete monoko na yo ezala
lokola vino ya kitoko koleka !
Elenge mwasi
Tika ete vino yango esopanela bolingo na ngai na pete,
eleka na bibebu ya bato oyo bazali kolala.
11 Ngai, nazali ya mobali na ngai ;
mpe ye, azalaka kaka na posa na ngai.
12 Yaka, mobali na ngai ; tika ete tokende na biso na elanga,
tolekisa butu na biso kati na mboka !
13 Na tongo, tokokende na bilanga ya vino
mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa bafololo,
soki mito na yango efungwami,
mpe soki banzete ya bambuma ya grenade ebimisi bafololo.
Kuna nde nakopesa yo babeze na ngai.
14 Bambuma ya mandragore ezali kobimisa solo na yango ;
mpe na ekuke na biso, tozali na bambuma nyonso ya kitoko :
ezala ya sika to ya kala, oyo nabombeli yo,
mobali na ngai ya motema.