9
Davidi mpe Mefibosheti
Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »
Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo ; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye :
— Ezali yo Tsiba ?
Azongisaki :
— Iyo, ezali ngai, mosali na yo.
Mokonzi atunaki ye :
— Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ?
Tsiba azongiselaki mokonzi :
— Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.
Mokonzi atunaki ye :
— Azali wapi ?
Tsiba azongisaki :
— Azali na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli, na mboka Lo-Debari.
Boye, mokonzi Davidi abengisaki ye wuta na Lo-Debari, na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli.
Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki :
— Mefibosheti !
Ye azongisaki :
— Ngai oyo, mosali na yo.
Davidi alobaki na ye :
— Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki :
— Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai ?
Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye :
— Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye. 10 Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale. 11 Tsiba alobaki na mokonzi :
— Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye.
Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi. 12 Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge ; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti. 13 Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.