3
Yawe abengi Samuele
Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te. Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye ; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te. Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki. Yawe abengaki Samuele, mpe ye azongisaki :
— Ngai oyo !
Akendeki mbangu epai ya Eli mpe alobaki :
— Ngai oyo, obengi ngai !
Kasi Eli alobaki na ye :
— Nabengi yo te ! Zonga mpe lala.
Samuele akendeki mpe alalaki.
Yawe abengaki lisusu :
— Samuele !
Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki :
— Ngai oyo, obengi ngai !
Eli alobaki na ye :
— Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala.
Nzokande, Samuele ayebaki nanu Yawe te mpe atikalaki nanu te koyoka Yawe koloba na ye ata mbala moko.
Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato ; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki :
— Ngai oyo, obengi ngai !
Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali. Boye Eli alobaki na Samuele :
— Kende na yo kolala ; mpe soki abengi yo, okoloba : « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka ! »
Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye.
10 Yawe ayaki mpe atelemaki wana ; abengaki lokola na mbala mosusu :
— Samuele ! Samuele !
Samuele azongisaki :
— Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka.
11 Yawe alobaki na Samuele :
— Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango. 12 Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka. 13 Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te. 14 Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo.
15 Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki. 16 Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki :
— Samuele, mwana na ngai !
Samuele azongisaki :
— Ngai oyo !
17 Eli atunaki ye :
— Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.
18 Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki :
— Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.
19 Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso. 20 Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe. 21 Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye.