12
Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi,
kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.
 
Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe,
kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.
 
Motema mabe elendisaka moto te ;
mosisa ya bato ya sembo ekatanaka te.
 
Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye,
kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono
oyo ezali kolia mikuwa.
 
Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo,
kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.
 
Maloba ya bato mabe ezali mitambo
mpo na kosopa makila,
kasi maloba ya bayengebene ebikisaka bango.
 
Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te,
kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.
 
Bwanya epesaka moto lokumu,
kasi motema mabe ememaka kotiolama.
 
Eleki malamu kozala moto pamba mpe kozala na mosali,
na esika ya komimona moto monene mpe kozanga bilei.
 
10 Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye,
kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.
 
11 Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei,
kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.
 
12 Moto mabe alingaka misuni ya bato mabe,
kasi mosisa ya bayengebene ebotaka mingi.
 
13 Moto ya misala mabe akangamaka na motambo
ya maloba na ye ya lokuta,
kasi moyengebene akobika kati na pasi.
 
14 Na nzela ya mbuma ya monoko na ye,
moto akotondisama na bolamu ;
mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.
 
15 Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima
na miso na ye,
kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.
 
16 Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka
kaka mokolo wana,
kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.
 
17 Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo,
kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta.
 
18 Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka
lokola mopanga,
kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali
lokola mafuta oyo ebikisaka.
 
19 Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela,
kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.
 
20 Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato
oyo basalaka mabongisi ya mabe,
kasi esengo ezali mpo na bato
oyo bakopesaka batoli ya kimia.
 
21 Mabe moko te ekokomela bayengebene,
kasi bato mabe bakotondisama na pasi.
 
22 Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe,
kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo
ezalaka elengi na miso na Ye.
 
23 Moto ya mayele abombaka boyebi,
kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.
 
24 Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi,
kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.
 
25 Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto,
kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
 
26 Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela,
kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.
 
27 Moto ya goyigoyi azangaka bilei,
mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.
 
28 Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo,
mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.