10
Masese ya Salomo
Masese ya Salomo :
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,
kasi mwana ya zoba ayokisaka
mama na ye pasi na motema.
 
Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe
epesaka litomba te,
kasi bosembo ekangolaka na kufa.
 
Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala,
kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa.
 
Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola,
kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.
 
Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele,
kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma
azali mwana ya soni.
 
Mapamboli ezali na likolo
ya moto ya moto ya sembo lokola motole,
kasi monoko ya moto mabe ebombaka bitumba.
 
Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli,
kasi bakobosana kombo ya moto mabe.
 
Motema ya bwanya endimaka mibeko,
kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba
amilukelaka libebi.
 
Moto ya sembo atambolaka na kimia,
kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama
akobima na pwasa.
 
10 Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu,
kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia.
 
11 Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi,
kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
 
12 Koyina ebendaka koswana,
kasi bolingo ezipaka mabe.
 
13 Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya,
kasi fimbu ezali malamu
mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele.
 
14 Moto ya bwanya abombaka boyebi,
kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
 
15 Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,
oyo batonga makasi,
kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.
 
16 Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi,
kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu.
 
17 Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi,
kasi moto oyo ayokaka pamela te
apengwisaka bato mosusu.
 
18 Moto oyo abombaka koyina kati na motema na ye
azali na bibebu ya lokuta,
mpe moto oyo atongaka bato azali zoba.
 
19 Moto oyo alobaka maloba ebele
azangaka te kosala masumu,
kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye
azali moto ya bwanya.
 
20 Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo,
kasi motema ya moto mabe ezali na tina te.
 
21 Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele,
kasi zoba akokufa na bozoba na ye.
 
22 Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi,
mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.
 
23 Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele,
kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele.
 
24 Makambo oyo moto mabe abangaka,
yango kaka nde ekomelaka ye,
kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.
 
25 Ndenge mbonge elekaka,
ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te,
kasi moto ya sembo akotikala
lokola moboko mpo na libela.
 
26 Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi,
mpe molinga esalaka miso pasi,
ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka
epai ya bato oyo batindaka ye pasi.
 
27 Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi,
kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.
 
28 Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo,
kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.
 
29 Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi
mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene,
kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.
 
30 Moto ya sembo akotikala kokweya te,
kasi bato mabe bakovanda na mokili te.
 
31 Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya,
kasi lolemo ya lokuta ekokatama.
 
32 Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo
oyo ezali malamu,
kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka
na makambo mabe.