12
Banganga-Nzambe mpe Balevi
Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue :
 
Seraya, Jeremi, Esidrasi,
Amaria, Maluki, Atushi,
Shekania, Rewumi, Meremoti,
Ido, Ginetoyi, Abiya,
Miyamini, Maadia, Biliga,
Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya,
Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya.
 
Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue.
 
Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi. Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu.
 
10 Jozue abotaki Yoakimi,
Yoakimi abotaki Eliashibi,
Eliashibi abotaki Yoyada,
11 Yoyada abotaki Jonatan,
Jonatan abotaki Yaduwa.
 
12 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi :
 
mpo na libota ya Seraya : Meraya ;
mpo na libota ya Jeremi : Anania ;
13 mpo na libota ya Esidrasi : Meshulami ;
mpo na libota ya Amaria : Yoanani ;
14 mpo na libota ya Meluki : Jonatan ;
mpo na libota ya Shebania : Jozefi ;
15 mpo na libota ya Arimi : Adina ;
mpo na libota ya Merayoti : Elikayi ;
16 mpo na libota ya Ido : Zakari ;
mpo na libota ya Ginetoni : Meshulami ;
17 mpo na libota ya Abiya : Zikiri ;
mpo na libota ya Minyamini : Moadia, Pilitayi ;
18 mpo na libota ya Biliga : Shamuwa ;
mpo na libota ya Shemaya : Jonatan ;
19 mpo na libota ya Yoyaribi : Matinayi ;
mpo na libota ya Yedaeya : Uzi ;
20 mpo na libota ya Salu : Kalayi ;
mpo na libota ya Amoki : Eberi ;
21 mpo na libota ya Ilikia : Ashabia ;
mpo na libota ya Yedaeya : Netaneeli.
 
22 Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi. 23 Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko. 24 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.
25 Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe. 26 Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe.
Libulisi ya mir ya Yelusalemi
27 Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire. 28 Babengisaki lisusu bayembi longwa na etuka oyo ezalaki zingazinga ya Yelusalemi, longwa na bamboka mike-mike ya bato ya Netofa, 29 longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi. 30 Tango Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki, bapetolaki mpe bato, bikuke mpe mir.
31 Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu. 32 Na sima na bango, bato oyo bazalaki kolanda : Oze mpe ndambo ya bakambi ya Yuda, 33 Azaria, Esidrasi, Meshulami, 34 Yuda, Benjame, Shemaya, Jeremi, 35 ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ; 36 mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango. 37 Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este.
38 Lisanga ya mibale ya bayembi ezalaki kotambola na nzela ya ngambo ya loboko ya mwasi. Nazalaki kolanda bango na likolo ya mir elongo na ndambo ya bato, longwa na ndako molayi ya Fulu kino na mir ya monene, 39 na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.
40 Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato 41 mpe mpo na Banganga-Nzambe oyo : Eliakimi, Maaseya, Minyamini, Mishe, Eliowenayi, Zakari mpe Anania oyo bamemaki bakelelo na bango. 42 Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya. 43 Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika.
Mabongisi mpo na makabo mpe eteni ya zomi
44 Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango, 45 bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali. 46 Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe. 47 Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.