10
Bato bazwi mokano ya kotosa Mobeko
Mpo na makambo oyo nyonso, tozali kozwa mokano oyo tozali kokoma na mokanda ; mpe bakambi na biso, Balevi na biso mpe Banganga-Nzambe na biso bakotia mikoloto na bango na mokanda yango.
Tala bakombo ya bato oyo batiaki mikoloto na bango na mokanda yango :
 
Moyangeli Neyemi, mwana mobali ya Akalia ;
Sedesiasi, Seraya, Azaria, Jeremi,
Pashuri, Amaria, Malikiya,
Atushi, Shebania, Maluki,
Arimi, Meremoti, Abidiasi,
Daniele, Ginetoni, Baruki,
Meshulami, Abiya, Miyamini,
Maazia, Biligayi mpe Shemaya.
Ezali bango nde bazalaki Banganga-Nzambe.
 
10 Mpo na Balevi :
Jozue, mwana mobali ya Azania ; Binuwi, moko ya bakitani ya Enadadi ; Kadimieli 11 elongo na bandeko na bango :
Shebania, Odia, Kelita, Pelaya, Anani,
12 Mishe, Reobi, Ashabia,
13 Zakuri, Sherebia, Shebania,
14 Odia, Bani mpe Beninu.
 
15 Mpo na bakambi ya bato :
Pareoshi, Paati-Moabi, Elami, Zatu, Bani,
16 Buni, Azigadi, Bebayi,
17 Adoniya, Bigivayi, Adini,
18 Ateri, Ezekiasi, Azuri,
19 Odia, Ashumi, Betsayi,
20 Arifi, Anatoti, Nebayi,
21 Magipiashi, Meshulami, Eziri,
22 Meshezabeyeli, Tsadoki, Yaduwa,
23 Pelatia, Anani, Anaya,
24 Oze, Anania, Ashubi,
25 Aloeshi, Pila, Shobeki,
26 Rewumi, Ashabina, Maaseya,
27 Ayiya, Anani, Anane,
28 Maluki, Arimi, Baana.
 
29 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango : kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola. 30 Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso ; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe ! 31 Balobaki :
« Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.
32 Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso. 33 Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso, 34 mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »
35 Biso, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato, tobetaki zeke mpo na kokata tango oyo libota na libota kati na biso ekomema likabo ya bakoni na Ndako ya Nzambe na biso, na mibu nyonso mpo na kopelisa moto na etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko.
36 Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe. 37 Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko. 38 Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala. 39 Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso. 40 Bana ya Isalaele elongo na Balevi basengeli komema makabo na bango ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, na bibombelo epai wapi babombaka bisalelo ya Esika ya bule, mpe epai wapi Banganga-Nzambe basalaka mosala na bango mpe bakengeli bikuke elongo na bayembi batelemaka. Boye, tokotika Ndako ya Nzambe na biso te.