4
Bokonzi ya Nzambe kati na Siona
Na mikolo oyo ekoya,
ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi
na songe ya bangomba,
ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi,
mpe bikolo ekokende kotondana kuna.
Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba :
« Boya, tomata na ngomba ya Yawe,
na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi !
Akoteya biso banzela na Ye
mpo ete tolanda banzela mike na Ye. »
Pamba te Mobeko ekowuta na Siona,
mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele,
akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya,
ezala oyo ezalaka mosika.
Bakotumba mipanga na bango na moto
mpo na kosala bakongo,
mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli.
Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga
mpo na kobundisa ekolo mosusu,
bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
Moto nyonso akovanda na kimia
kati na bilanga na ye ya vino
mpe na se ya nzete na ye ya figi.
Moto moko te akobangisa ye,
pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.
 
Ekolo na ekolo ekotambola
na kombo ya nzambe na yango,
kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe
oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.
Mabongisi ya Yawe
« Na mokolo yango, » elobi Yawe,
« Nakosangisa libota na Ngai,
oyo ezali kotambola tengu-tengu ;
nakoyamba oyo ezalaki na bowumbu, mosika na Ngai,
mpe oyo natiaki pasi likolo na yango.
Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tengu
ekoma batikali,
mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai,
libota ya nguya.
Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona,
kobanda na mokolo yango kino libela na libela.
Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele,
ngomba ya Siona, mboka kitoko,
bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala,
bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »
 
Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga ?
Boni, ozali lisusu na mokonzi te ?
Boni, mopesi toli na yo asili kokufa
mpo ete pasi ekanga yo lokola mwasi
oyo azali na pasi ya kobota ?
10 Oh Siona, mboka kitoko,
lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota !
Pamba te sik’oyo, okobima na engumba
mpe okovanda kati na zamba,
okokende kino na Babiloni ;
mpe kuna, Yawe akokangola yo
na maboko ya monguna na yo.
 
11 Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani
mpo na kotelemela yo ;
bazali koloba :
« Tika ete bosantu ya Siona esambwa
mpe miso esepela komona kobebisama na yango ! »
12 Kasi bayebi makanisi na Yawe te
mpe bazali kososola mabongisi na Ye te,
Ye oyo asangisaki bango
lokola maboke ya matiti ya ble na etando
oyo batutelaka yango.
13 Oh Siona, mboka kitoko,
telema mpe tuta ble,
pamba te nakopesa yo maseke ya bibende
mpe basapato ya bronze,
bongo okobuka bikolo ebele mike-mike
mpe okopesa bomengo na bango,
oyo bazwaki na nzela ya mabe,
lokola likabo epai na Yawe,
mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.
 
14 Oh engumba oyo elinga bitumba,
sangisa basoda na yo,
pamba te bazingeli biso !
Bakobeta mokambi ya Isalaele fimbu na matama.