9
Aron mpe bana na ye babandi kosalela Yawe
Na mokolo ya mwambe, Moyize abengisaki Aron, bana na ye ya mibali mpe bakambi ya Isalaele. Alobaki na Aron : « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba ; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe. Bongo loba na bana ya Isalaele : ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba, mpe ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya boyokani, mpo na kobonza lokola mbeka liboso ya Yawe elongo na likabo ya bambuma basangisa na mafuta. Pamba te, na mokolo ya lelo, Yawe akobimela bino. › »
Bamemaki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani biloko oyo Moyize atindaki bango ; mpe lisanga mobimba bapusanaki mpe batelemaki liboso ya Yawe. Moyize alobaki : « Tala makambo oyo Yawe atindi bino kosala mpo ete nkembo na Yawe ebimela bino. »
Moyize alobaki na Aron : « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba ; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. »
Aron apusanaki pene ya etumbelo mpe akataki kingo ya mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na ye moko. Bongo bana mibali ya Aron bamemelaki ye makila. Aron azindisaki mosapi na ye kati na makila, apakolaki makila yango na maseke ya etumbelo mpe asopaki makila oyo etikalaki na makolo ya etumbelo. 10 Atumbaki na etumbelo : mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 11 Atumbaki na moto mosuni mpe poso na libanda ya molako.
12 Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 13 Bapesaki ye mbeka ya kotumba bakata biteni-biteni elongo na moto, mpe atumbaki yango na etumbelo. 14 Asukolaki biloko ya kati mpe makolo, atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba.
15 Aron amemaki likabo oyo ezalaki mpo na bato. Azwaki ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ya bato, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka ya masumu ndenge asalaki na mbeka ya liboso. 16 Aron amemaki mbeka ya kotumba mpe abonzaki yango kolanda mitindo. 17 Amemaki mpe likabo ya bambuma, atondisaki yango na loboko na ye mpe atumbaki yango na etumbelo elongo na mbeka ya kotumba ya tongo. 18 Aron akataki kingo ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali lokola mbeka ya boyokani mpo na bato ; bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 19 Bapesaki ye mpe biteni ya mafuta ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali, mokila, mafuta ya biloko ya kati, mafuta ya bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe bafwa. 20 Batiaki biteni yango na batolo ya banyama nyonso mibale mpe Aron atumbaki mafuta na etumbelo. 21 Aron atombolaki liboso ya Yawe likabo ya kotombola, batolo mpe mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ndenge Moyize atindaki.
22 Aron atombolaki maboko na ye epai ya bato mpe apambolaki bango ; bongo akitaki sima na kobonza mbeka ya masumu, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.
23 Moyize mpe Aron bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo tango babimaki, bapambolaki bato, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bato nyonso. 24 Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se.