27
Bato mpe biloko ya Yawe
Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto. Tala motuya ya kopesa kolanda ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo : mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu tuku mibale mpe tuku motoba, bagrame nkama motoba ya palata mpo na mobali ; bagrame nkama misato na tuku motoba ya palata mpo na mwasi ; mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu mitano mpe tuku mibale, bagrame nkama mibale na tuku minei ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi ; mpo na moto oyo mikolo ya mbotama na ye ya mbotama ezali kati na sanza moko mpe mibu mitano, bagrame tuku motoba ya palata mpo na mobali, mpe bagrame tuku misato na motoba ya palata mpo na mwasi ; mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kobanda na tuku motoba mpe komata, bagrame nkama moko na tuku mwambe ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi.
Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.
Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa lokola likabo epai na Yawe nyama oyo esengeli, nyama yango ekokoma bule ; 10 asengeli te kobongola to kopesa nyama mosusu na esika ya nyama ya liboso, noki te banyama nyonso mibale ekokoma bule.
11 Soki nyama oyo alapelaki ndayi ezali mbindo, nyama oyo esengeli te kopesama lokola likabo epai na Yawe, bakomema nyama yango liboso ya Nganga-Nzambe 12 oyo akotala soki nyama yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-nzambe akokata, ekotikala bongo. 13 Soki mokolo nyama alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.
14 Soki moto abulisi ndako na ye lokola eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda ndenge ndako yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-Nzambe akokata, ekotikala bongo. 15 Soki moto oyo abulisi ndako na ye lokola likabo epai na Yawe alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; mpe ndako yango ekokoma lisusu ya ye.
16 Soki moto abulisi mpo na Yawe eteni ya mabele kati na mabele na ye, bakokata motuya ya eteni ya mabele yango kolanda milona oyo bakoki kolona kuna : bagrame nkama motoba ya palata mpo na bakilo nkama minei ya bambuma ya orje. 17 Soki abulisi elanga na ye, na mobu ya kosepela kokangolama, motuya oyo bakata ekotikala bongo. 18 Kasi soki abulisi elanga na ye epai na Yawe sima na mobu ya kosepela kokangolama, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda motango ya mibu oyo etikali kino na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama. Boye bakokitisa motuya oyo ekatama.
19 Soki moto oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya oyo ekatama ; boye elanga yango ekokoma lisusu ya ye. 20 Kasi soki asikoli yango te, bongo bateki yango epai ya moto mosusu, akoki lisusu kosikola yango te. 21 Soki elanga esikolami na mobu ya kosepela kokangolama, ekokoma bule lokola elanga oyo babulisi mpo na Yawe : ekozala mabele ya Banganga-Nzambe. 22 Soki moto abulisi epai na Yawe elanga oyo asombaki, nzokande ezali mabele ya libota na bango te, 23 Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda mibu oyo etikali kino na mobu ya kosepela kokangolama ; kaka na mokolo oyo Nganga-Nzambe akokata motuya na yango nde moto yango akopesa motuya na yango lokola eloko ya bule epai na Yawe. 24 Na mobu ya kosepela kokangolama, elanga yango ekozonga na maboko ya moto oyo atekaki yango : mokolo mabele. 25 Mituya nyonso ekokatama ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.
26 Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba. 27 Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama.
28 Nyonso oyo moto akopesa epai na Yawe lokola likabo ekoki kotekama te to kosikolama ; ezala moto, nyama to mabele, pamba te nyonso oyo epesami epai na Yawe ezali bule mpo na Yawe. 29 Moto moko te oyo abongisami mpo na kobebisama akoki kosikolama, basengeli koboma ye.
30 Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe : ezali bule mpo na Yawe. 31 Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.
32 Eteni nyonso ya zomi ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba, elingi koloba nyama nyonso ya zomi oyo ekoleka na se ya lingenda ya mobateli bibwele, ekozala bule mpo na Yawe ; 33 ezala ya malamu to ya mabe, akoki te kopona nyama mosusu na esika ya nyama oyo ya zomi. Soki atie nyama moko na esika ya nyama mosusu, nyonso mibale ekokoma bule mpo na Yawe ; mpe ekoki kosikolama te. › »
34 Oyo nde mitindo oyo Yawe apesaki Moyize, na ngomba Sinai, mpo na bana ya Isalaele.