20
Bitumbu ya masumu
Yawe alobaki na Moyize ete apesa malako oyo epai ya bana ya Isalaele : « Soki moto moko ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na Isalaele abonzi moko kati na bana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, esengeli baboma ye. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga. Ngai nakotombokela moto yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye, pamba te abonzaki mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpo na kokomisa mbindo Esika na Ngai ya bule mpe mpo na kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai. Mpe soki bato ya mokili bakangi miso na bango tango moto wana azali kobonza mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpe baboyi koboma ye, ngai nakotombokela moto yango mpe libota na ye, nakolongola bango na ekolo na bango, elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kosalela nzambe Moloki.
Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.
Bomibulisa mpe bozala bule, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
Bobatela bikateli na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe oyo akomisi bino basantu.
Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.
10 Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.
11 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya tata na ye, asambwisi tata na ye ; bango mibale, esengeli koboma bango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
12 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya mwana na ye ya mobali ; bango mibale esengeli koboma bango, pamba te basali bosoto : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
13 Soki mobali asangisi nzoto na moninga na ye mobali ndenge basangisaka nzoto na mwasi, bango mibale basali likambo moko ya mbindo ; boye esengeli koboma bango mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
14 Soki mobali abali mwasi mpe mama ya mwasi, ezali likambo ya mabe koleka. Bango nyonso misato : mobali mpe basi nyonso mibale, esengeli kotumba bango na moto, mpo ete mabe moko te ezala kati na bino.
15 Soki mobali asangisi nzoto na nyama, esengeli koboma ye elongo na nyama yango. 16 Ndenge moko mpe soki mwasi asangisi nzoto na nyama, bakoboma ye elongo na nyama yango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
17 Soki mobali abali mwasi oyo azali ndeko na ye mpo ete abotami na mama mosusu to tata mosusu, bongo asangisi na ye nzoto, ezali likambo ya soni. Bakolongola bango na miso ya bato na bango. Lokola mobali asambwisi ndeko na ye ya mwasi, akomema ngambo.
18 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza ; bango mibale, esengeli kobengana bango kati na bato na bango, mpo te basangisaki nzoto na tango mwasi azalaki komona makila na ye ya sanza.
19 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata to ya mama na yo, pamba te ekosambwisa bondeko. Soki moto asali yango, bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango.
20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi ya ndeko ya tata na ye to mwasi ya ndeko ya mama na ye, asambwisi ndeko ya tata na ye to ya mama na ye ; bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango mpe bakokufa bazanga bana.
21 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya ndeko na ye ya mobali, ezali likambo ya mbindo ; asambwisi ndeko na ye ya mobali ; bakokufa bazanga bana.
22 Bobatela mpe botosa bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso ; bosalela yango mpo ete mokili epai wapi nakomema bino mpo na kovanda esanza bino te. 23 Bolanda te bizaleli ya bikolo oyo nakobengana liboso na bino, pamba te basalaki makambo wana nyonso mpe nayinaki bango. 24 Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni. 25 Yango wana bosengeli kosala bokeseni kati na nyama oyo ezali mbindo mpe oyo ezangi mbindo, kati na ndeke oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto. Bosengeli te komikomisa mbindo na nzela ya nyama, ya ndeke to ya nyama nyonso oyo etambolaka na libumu, oyo natiaki pembeni mpo ete bino mpe bomona yango lokola mbindo.
26 Bozala bule, bato oyo babulisami mpo na Ngai ; pamba te Ngai Yawe, nazali Bule ; nalongolaki bino kati na bikolo mosusu, natiaki bino pembeni, mpo ete bozala bato na Ngai moko.
27 Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »