18
Mobeko na tina na kosangisa nzoto
Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino. Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.
Mobali moko te akosangisa nzoto na mwasi ya libota na ye penza. Nazali Yawe.
Okosambwisa te tata na yo na kosangisa nzoto na mama na yo. Lokola azali mama na yo, kosambwisa ye te.
Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo. Okosangisa nzoto te na ndeko na yo ya mwasi, ezala na mwana mwasi ya tata na yo to ya mama na yo, oyo abotami na ndako to na libanda ya ndako.
10 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwasi ; kosambwisa ye te.
11 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi.
12 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo. 13 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mama na yo, azali mama leki to mama kulutu na yo.
14 Okosambwisa te ndeko mobali ya tata na yo na kosangisa nzoto na mwasi na ye. Azali mama na yo.
15 Okosangisa nzoto te na bokilo na yo. Azali mwasi ya mwana na yo, kosangisa na ye nzoto te.
16 Okosambwisa te ndeko na yo ya mobali na kosangisa nzoto na mwasi na ye.
17 Okosangisa nzoto te na mama mpe na mwana na ye ya mwasi to na mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi ; pamba te bazali makila moko mpe ekozala likambo ya nkele penza na miso ya Nzambe.
18 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mwasi na yo, wana mwasi na yo azali nanu na bomoi, noki te ekoyeisa bombanda.
19 Okosangisa nzoto te na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza, pamba te azali mbindo.
20 Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.
21 Okopesa moko kati na bana na yo te lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, pamba te osengeli te kobebisa lokumu ya Kombo ya Nzambe na yo. Ngai nazali Yawe.
22 Okosangisa nzoto te na mwana mobali ndenge basangisaka nzoto na mwana mwasi ; ezali likambo ya nkele.
23 Okosangisa nzoto te na nyama, noki te okokoma mbindo elongo na yango. Ndenge moko mpe mwasi akosangisa nzoto te na nyama : ezali kotiola Nzambe.
24 Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo. 25 Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango ; bongo esanzaki bavandi na yango.
26 Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai ; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe. 27 Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo. 28 Bino bokeba ete bokomisa mboka mbindo te, mpo ete yango esanza bino te ndenge esanzaki bato ya bikolo oyo bazalaki liboso na bino. 29 Moto nyonso oyo akosala moko ya makambo oyo ya nkele na miso ya Nzambe, esengeli balongola ye kati na bato na ye.
30 Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »