16
Mokolo ya bolimbisi masumu
Yawe alobaki na Moyize, sima na kufa ya bana mibali mibale ya Aron, oyo bakufaki tango bapusanaki liboso ya Yawe. Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te ; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.
Tala ndenge Aron akobanda kokota na Esika ya bule : akomema ngombe moko ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba. Akolata na nzoto na ye : nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino ; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango. Aron akozwa kati na lisanga ya bana ya Isalaele : bantaba mibale ya mibali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.
Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye. Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale : moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli*. Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu. 10 Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.
11 Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu, 12 akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido. 13 Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te. 14 Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu. 15 Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali : akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.
16 Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango. 17 Moto moko te akozala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani tango Aron akokota kuna mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu kati na Esika ya bule kino tango akobima na libanda. Mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko, mpo na ndako na ye mpe mpo na lisanga mobimba ya Isalaele.
18 Sima na yango, akobima mpo na kokende na etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo yango. Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe ya ntaba ya mobali mpe akotia yango na maseke ya etumbelo. 19 Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.
20 Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi. 21 Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango ; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe. 22 Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe.
23 Bongo Aron akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, akolongola bilamba ya lino oyo alataki tango akotaki na Esika ya bule mpe akotika yango kuna. 24 Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule ; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato. 25 Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo.
26 Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi ; mpe sima na yango, akozonga na molako. 27 Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango. 28 Moto oyo akotumba yango asengeli kosukola na mayi bilamba na ye mpe nzoto na ye, sima na yango nde akoki kozonga na molako.
29 Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela : na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te, 30 pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe. 31 Ekozala mpo na bino mokolo ya Saba, mokolo ya bopemi, mpe bosengeli komikitisa. Ezali malako ya libela.
32 Nganga-Nzambe oyo bakopakola mafuta mpe akobulisama mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe na esika ya tata na ye, akosala mosala ya bolimbisi masumu. Akolata bilamba ya bule ya lino. 33 Akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ndako ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na etumbelo, mpo na Nganga-Nzambe mpe mpo na bato nyonso ya lisanga.
34 Oyo nde ekozala mpo na bino malako ya libela : mbala moko na mobu, bokosala mosala ya bolimbisi masumu nyonso ya bana ya Isalaele. »
Mpe basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
* 16:8 Azazeli ezali kombo ya zabolo moko oyo evandaka na bisika bikawuka.