11
Mibeko na tina na banyama ya mbindo
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia : banyama oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.
Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; mpanya ya zamba, pamba te ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; mpanya ya matoyi milayi, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; ngulu, pamba te ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu : ezali mbindo mpo na bino. Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.
Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi lokola bibale minene mpe miluka, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli* mpe biteku. 10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku : ezali mbindo mpo na bino. 11 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino. 12 Bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi kasi ezangi binyanyeli mpe biteku, ezali mbindo mpo na bino.
13 Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene, 14 nzengo mpe bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, 15 bayanganga ya lolenge nyonso ; 16 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso, 17 esulungutu, libata ya mayi, esulungutu ya monene, 18 esulungutu ya pembe, libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, 19 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
20 Bokolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu mpe etambolaka na makolo minei ; ezali mbindo mpo na bino. 21 Nzokande, kati na banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, bokoki kolia oyo ezali lisusu na makolo oyo esungaka yango mpo na kopumbwa wuta na mabele : 22 lolenge nyonso ya mabanki, mankoko, makelele mpe mayoyo. 23 Kasi banyama mike nyonso oyo ezali na mapapu mpe na makolo minei ezali mbindo mpo na bino.
24 Soki te, ekokomisa bino mbindo ; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa. 25 Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
26 Tala banyama mosusu oyo bokomona lokola mbindo : nyama oyo ezali na litindi epasuka te mpe ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Moto nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo. 27 Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa. 28 Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo.
29 Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo : mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete, 30 moselekete ya ndako, moselekete ya zelo, moselekete ya zamba, moselekete ya langi ya pondu, mongungu. 31 Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa. 32 Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto. 33 Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango. 34 Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo ; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka : soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini. 35 Eloko nyonso oyo ebembe ya moko kati na banyama wana ekokweya likolo na yango ekokoma mbindo. Soki ezali fulu ya moto to mbabola, esengeli kopanza yango ; pamba te ekozala mbindo mpe bokomona yango bongo. 36 Nzokande soki nyama yango ya mbindo ekweyi kati na etima to kati na libulu ya mayi, mayi ekotikala peto kasi moto oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo. 37 Soki eteni moko ya ebembe na yango ekweyi likolo ya nkona oyo basengeli kolona, nkona ekotikala peto ; 38 kasi soki basilaki kosopela nkona yango mayi, bongo eteni ya ebembe ya nyama ya mbindo ekweyi lisusu likolo na yango, bokomona nkona yango mbindo.
39 Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa ; 40 mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
41 Bosengeli komona lokola mbindo banyama nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epekisami kolia yango. 42 Bokolia ata nyama moko te oyo etambolaka na libumu ; ata oyo etambolaka na makolo minei to koleka, pamba te ezali mbindo. 43 Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te. 44 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu. 45 Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule.
46 Yango wana nde ezali mobeko oyo etali banyama, bandeke, bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi to na libumu. 47 Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › »
* 11:9 Enyanyeli elakisi na lifalanse : nageoire 11:9 Eteku elakisi na lifalanse : écaille