Nzembo ya mibale ya mawa : kanda ya Yawe
2
Yawe apesi Yelusalemi etumbu
Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko,
na lipata ya kanda na Ye :
akweyisi lokumu ya Isalaele,
wuta na likolo kino na se ;
na mokolo ya kanda na Ye,
abosanaki enyatelo makolo na Ye !
 
Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso
ya Jakobi ;
na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi
ya Yuda, mwasi kitoko,
mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango.
 
Na kanda makasi na Ye,
abukaki Isalaele maseke nyonso,
alongolaki loboko na Ye ya mobali
na likolo na yango
tango monguna na bango azalaki kopusana ;
apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi
lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso
na bangambo na yango nyonso.
 
Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye ;
lokola monguna, asemboli loboko na Ye
mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso ;
mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto
na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.
 
Yawe akomi lokola monguna :
abebisi mokili ya Isalaele,
abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele,
abuki bandako na yango batonga makasi,
atondisi matanga mpe kolela
kati na Yuda, mboka kitoko.
 
Abebisi lopango na ye
ndenge babebisaka lopango ya elanga,
abebisi esika na bango ya mayangani.
Na kanda makasi na Ye,
Yawe asali ete Siona abosana
bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ;
mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.
 
Yawe abwaki etumbelo na ye,
asundoli esika na ye ya bule
mpe akabi na maboko ya monguna
bamir mpe bandako ya mokonzi na yango.
Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe
ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.
 
Yawe akani kobuka bamir
oyo ezingeli Siona, mboka kitoko ;
atandi singa ya komekela molayi
mpe azongisi loboko na Ye na sima te
mpo na kobebisa ;
abebisi bamir oyo ebatelaka engumba mpe bamir mosusu ;
bongo akweyisi yango nyonso.
 
Bikuke na yango ezindi na mabele ;
abuki-buki mpe abebisi banzete oyo
bakangelaka bikuke yango.
Mokonzi mpe bakambi na ye bakei
na bowumbu kati na bikolo,
Mobeko ezali lisusu te,
mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te
bimoniseli kowuta na Yawe.
 
10 Bampaka ya Siona, mboka kitoko,
bavandi kimia na mabele,
bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ;
bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami,
bilongi na bango kino na se.
 
11 Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli,
nazali komitungisa,
libumu na ngai ezali kobaluka,
motema na ngai ezali kotungisama
mpo ete bato na ngai babebisami,
mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele
balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.
 
12 Bazalaki koloba na bamama na bango :
« Epai wapi tokoki kozwa ble mpe masanga ya vino ? »
Ndenge bazalaki kokweya-kweya
lokola bato oyo bazoki bapota minene
na babalabala ya engumba,
ndenge wana mpe bazalaki kokufa
na maboko ya bamama na bango.
 
13 Naloba lisusu nini mpo na yo ?
Nakokanisa yo na nani,
Yelusalemi, mboka kitoko ?
Nakokanisa yo na nani
mpo ete nakoka kobondisa yo,
Siona, mboka kitoko ?
Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ;
nani akoki kobikisa yo ?
 
14 Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki
ya lokuta mpe ya pamba ;
balakisaki yo masumu na yo te
mpo ete okende na bowumbu te :
masakoli oyo bazwelaki yo
ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !
 
15 Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo
bazali kobeta maboko na kokamwa,
bazali kobeta piololo mpe koningisa mito
mpo na Yelusalemi, mboka kitoko :
« Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga
kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »
 
16 Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango
mpo na kotiola yo,
bazali koseka yo mpe kolia minu na bango ;
bongo bazali koloba :
« Tomeli ye ! Tala mokolo oyo tozalaki kozela !
Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango ! »
 
17 Yawe asali makambo oyo abongisaki,
akokisi liloba na Ye,
nyonso oyo aloba wuta kala :
akweyisi yo na mawa te,
apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo,
atomboli liseke ya banguna na yo.
 
18 Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo.
Oh mir ya Siona, mboka kitoko,
tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale,
butu mpe moyi,
mpe miso na yo ekangama te !
 
19 Telema, ganga na butu
ndenge bakengeli basalaka na butu ;
sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo,
tombola maboko na yo epai na Ye
mpo na bomoi ya bana na yo,
oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.
 
20 Oh Yawe, tala mpe mona !
Nani oyo osalela makambo ya boye ?
Boni, basi basengelaki solo kolia
mbuma ya mabumu na bango
to bana oyo bango moko babokoli ?
Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe
kati na Esika ya bule ya Nkolo ?
 
21 Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo
elali-lali na babalabala ;
basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga !
Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ;
obomi bango na mawa te !
 
22 Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti,
ndenge wana mpe obengisaki pasi
wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe.
Na mokolo ya kanda ya Yawe,
moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi.
Monguna na ngai abebisi bato
oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.