9
Yawe amimonisi epai ya Salomo
(2Ma 7.11-12)
Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kosala nyonso oyo azalaki na yango posa, Yawe abimelaki Salomo na mbala ya mibale, ndenge kaka abimelaki ye na mbala ya liboso, na Gabaoni. Yawe alobaki na ye :
« Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.
Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai, nakolendisa mpo na libela kiti na yo ya bokonzi kati na Isalaele, ndenge nalobaki yango epai ya Davidi, tata na yo : ‹ Okotikalaka kozanga te moto oyo akokitana na kiti ya bokonzi ya Isalaele. ›
Kasi soki yo mpe bana na yo ya mibali bopengwi mosika na Ngai ; soki botosi te mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango, nakolongola Isalaele kati na mabele oyo napesaki ye, nakobwaka mosika ya elongi na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai, mpe Isalaele akokoma eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso. Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? › Bakoyanola : ‹ Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki mpe basalelaki yango ; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. › »
Misala mosusu ya Salomo
(2Ma 8.1-18)
10 Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko, 11 akabelaki Irami, mokonzi ya Tiri, bingumba tuku mibale kati na Galile, pamba te Irami asungaki Salomo na nyonso oyo azalaki na yango na bosenga : mabaya ya sedele, ya sipele mpe wolo. 12 Irami abimaki wuta na Tiri, mokili na ye, mpo na kotala bingumba oyo Salomo akabelaki ye, kasi asepelaki na yango te. 13 Alobaki : « Ndeko na ngai, bingumba nini oyo opesi ngai ? »
Yango wana abengaki bingumba yango mokili ya Kabuli*, kombo oyo etikala kino lelo. 14 Nzokande, Irami apesaki Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo.
15 Salomo asalisaki bana ya Isalaele misala makasi mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, ndako na ye moko, Milo, mir ya Yelusalemi, Atsori, Megido mpe Gezeri.
16 Faraon, mokonzi ya Ejipito, amataki na Gezeri, abotolaki yango na maboko ya bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna, abomaki bango, atumbaki engumba yango na moto mpe akabaki yango epai ya mwana na ye ya mwasi oyo akomaki mwasi ya Salomo. 17 Yango wana Salomo atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se, 18 Baalati mpe Tamari kati na esobe ya mokili, 19 bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, kati na Libani mpe kati na mokili nyonso oyo azalaki kokamba. 20 Batikali nyonso kati na bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te, 21 ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo. 22 Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakalaka na ye ya lokumu, bakalaka na ye, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar. 23 Tala motango ya bakalaka ya lokumu oyo batindamaki mpo na kokamba bato oyo bazalaki kosala misala ya Salomo : bakalaka nkama mitano na tuku mitano.
24 Sima na mwana mwasi ya Faraon kolongwa na engumba ya Davidi mpo na kokende na ndako oyo Salomo atongelaki ye, Salomo atongaki Milo.
25 Mbala misato kati na mobu, Salomo azalaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo oyo atongaki mpo na Yawe ; azalaki mpe kotumba malasi ya ansa na likolo ya etumbelo oyo ezalaki liboso ya Yawe. Ezalaki bongo nde misala ezalaki kokokisama kati na Tempelo ya Yawe.
26 Mokonzi Salomo asalisaki masuwa ebele na engumba Etsioni-Geberi oyo ezali pene ya Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi. 27 Irami atindaki na masuwa yango basali na ye, bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale monene ; bazalaki elongo na basali ya Salomo. 28 Bakendeki na Ofiri epai wapi bazwaki bakilo nkoto zomi na mibale ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.
* 9:13 Mokili ya Kabuli elingi koloba : mokili ezanga tina.