4
Bakambi oyo basalaka elongo na Salomo
Mokonzi Salomo akonzaki Isalaele mobimba.
 
Tala bakambi oyo bazalaki kosala na ye elongo :
 
Azaria, koko ya Nganga-Nzambe Tsadoki ;
Eliyorefi mpe Ayiya, bana mibali ya Shisha, bazalaki bakomi mikanda ;
Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ;
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki mokonzi ya mampinga ;
Tsadoki mpe Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ;
Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi ;
Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi ;
Ayishari, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ;
Adonirami, mwana mobali ya Abida, azalaki mokengeli bato ya misala makasi.
 
Kati na Isalaele mobimba, Salomo atiaki mpe bayangeli zomi na mibale ya bituka, oyo bazalaki na mokumba ya komema biloko mpo na mokonzi mpe mpo na ndako na ye. Moyangeli moko na moko asengelaki kopesa biloko mpo na sanza moko na mobu.
 
Tala bakombo na bango :
 
Beni-Uri : moyangeli ya etuka ya bangomba ya Efrayimi ;
Beni-Dekeri : moyangeli ya Makatsi, Shaalibimi, Beti-Shemeshi, Eloni mpe Beti-Anani ;
10 Beni-Esedi : moyangeli ya Aruboti (Soko mpe mokili mobimba ya Eferi) ;
11 Beni-Abinadabi : moyangeli ya Dori ; abalaki Tafati, mwana mwasi ya Salomo ;
12 Baana, mwana mobali ya Ayiludi : moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami ;
13 Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.
14 Ayinadabi, mwana mobali ya Ido : moyangeli ya Maanayimi ;
15 Ayimaatsi : moyangeli ya Nefitali. Ye mpe abalaki Basimati, mwana mwasi ya Salomo.
16 Baana, mwana mobali ya Ushayi : moyangeli ya Aseri mpe ya Bealoti ;
17 Jozafati, mwana mobali ya Paruya : moyangeli ya Isakari ;
18 Shimei, mwana mobali ya Ela : moyangeli ya Benjame.
19 Geberi, mwana mobali ya Uri : moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani).
Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango.
 
20 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene ; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.