15
Abiyami, mokonzi ya Yuda
(2Ma 13.1-2)
Tango Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiyami akomaki mokonzi ya Yuda. Awumelaki mibu misato na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana ya Abisalomi.
Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye. Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi. Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti.
Mikolo nyonso ya bomoi ya Abiyami, ndako ya Roboami ezalaki kaka na bitumba na ndako ya Jeroboami.
(2Ma 13.22-23)
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Abiyami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Bitumba ezalaki kati na Jeroboami mpe Abiyami. Abiyami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Asa, mokonzi ya Yuda
(2Ma 14.2-3; 15.16–16.6)
Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, asalaki mibu tuku mibale na bokonzi, Asa akomaki mokonzi ya Yuda. 10 Asalaki mibu tuku minei na moko na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya koko na ye ya mwasi ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana mwasi ya Abisalomi.
11 Asa asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe, ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. 12 Abenganaki wuta na mokili, bato oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, mpe alongolaki banzambe nyonso ya bikeko oyo tata na ye asalaki. 13 Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron. 14 Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye. 15 Azongisaki kati na Tempelo ya Yawe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu.
16 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba. 17 Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda. 18 Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo : 19 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo kado ya palata mpe ya wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. » 20 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali. 21 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akendeki kovanda na Tiritsa. 22 Bongo mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, kolongola ata moto moko te ; mpe bamemaki longwa na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela kuna. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kolendisa engumba Geba kati na etuka ya Benjame, mpe engumba Mitsipa.
(2Ma 16.11–17.1)
23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo. 24 Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Nadabi, mokonzi ya Isalaele
25 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi ; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale. 26 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu. 27 Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni. 28 Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi. 29 Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami : abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo, 30 mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Nadabi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 32 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba.
Baesha, mokonzi ya Isalaele
33 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, Baesha, mwana mobali ya Ayiya, akomaki mokonzi ya Isalaele mobimba, na Tiritsa. Asalaki mibu tuku mibale na minei na bokonzi. 34 Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.