23
Maloba ya suka ya Jozue
Sima na Yawe kopesa bopemi na Isalaele liboso ya banguna nyonso oyo bazingelaki bango, elekaki tango molayi. Bongo, Jozue akomaki mobange, mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi. Boye, Jozue abengisaki Isalaele mobimba : bampaka na yango, bakambi na yango, basambisi elongo na bakalaka na yango. Alobaki na bango : « Nakomi mobange mpe mibu ya bomoi na ngai epusani makasi. Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino. Bobosana te ndenge nini nazalaki kobeta zeke mpo na kokabolela mabota na bino lokola libula, mokili ya bikolo oyo etikali mpe ya bikolo oyo nabotolaki wuta na Yordani kino na Ebale monene, na ngambo ya weste. Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino ; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki.
Boyika mpiko mpe bosenzela mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize ; bokende libanda na yango te. Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te. Kasi bokangama makasi na Yawe, Nzambe na bino, ndenge bozali kosala kino na mokolo ya lelo.
Yawe abenganaki bikolo ya minene mpe ya nguya liboso na bino ; mpe kino na moyi ya lelo, moko te alongi kotelema liboso na bino. 10 Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki. 11 Boye, bosala keba ete bolinga Yawe, Nzambe na bino.
12 Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango, 13 boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.
14 Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya. 15 Ndenge kaka bilaka nyonso ya kitoko ya Yawe, Nzambe na bino, ekokisamaki solo, ndenge wana mpe akotindela bino makambo mabe kino tango akosilisa koboma bino kati na mokili ya kitoko oyo apesaki bino 16 soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »