7
Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele,
masumu ya Efrayimi
mpe mabe ya Samari
ebimaki na pwasa,
mpo ete batambolaki na lokuta ;
miyibi babukaki bandako
mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.
Bamilobelaka te, kati na mitema na bango,
ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ;
sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango,
ezali tango nyonso liboso na Ngai.
 
Basepelisaka mokonzi
na nzela ya misala na bango ya mabe ;
basepelisaka mpe bakambi
na nzela ya lokuta na bango.
Bango nyonso bazali bandumba,
bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa,
oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni,
wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.
Na mokolo ya feti ya mokonzi na biso,
bakambi balangwaka masanga
mpe mokonzi asanganaka na batioli.
Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu,
bapusanaka pene na ye na mayele mabe.
Butu mobimba, balalaka na kanda ;
mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu,
batumbaka bakambi na bango ;
mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka,
moko te kati na bango abelelaka Ngai.
 
Efrayimi asangani na bikolo mosusu,
akomi lokola galeti oyo ebela malamu te.
Bapaya bazali kosilisa ye makasi,
kasi ye azali kososola yango te.
Azali kokoma mobange,
kasi azali kososola yango te.
 
10 Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye,
kasi azali komona nyonso wana pamba :
azongeli te Yawe, Nzambe na ye ;
mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !
 
11 Efrayimi akomi lokola ebenga
oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele :
azali kosenga lisungi epai ya Ejipito,
kasi azali mpe kokende na Asiri.
12 Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama
mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo.
Nakopesa ye etumbu oyo ekoki
kolanda ndenge nakebisaki ye
na tina na yango kati na lisanga.
 
13 Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai !
Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai !
Wana nazalaki na Ngai kokangola bango,
kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !
14 Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango,
kasi balelaka na bambeto na bango.
Tango bamikataka banzoloko
mpo na kozwa ble mpe vino ya sika,
bakomaka nde mosika na Ngai.
 
15 Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi,
kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.
16 Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
bazali lokola tolotolo ebeba ;
bakambi na bango bakokufa na mopanga
likolo ya maloba na bango ezanga limemia.
Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.