3
Oze azwi mwasi mosusu
Yawe alobaki na ngai :
— Kende, linga mwasi mosusu oyo azali mwasi ya mobali mosusu to mpe azali mwasi ya ekobo. Linga ye ndenge Yawe alingaka bana ya Isalaele, ata soki basambelaka banzambe mosusu mpe baliaka bagato basala na bambuma ya vino ebulisama !
Boye, nasombaki ye na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, zomi na mitano, mpe na motuya ya bakilo ya orje, nkama minei na tuku mitano. Bongo nalobaki na ye :
— Wumela na ngai tango molayi ; okosala kindumba te mpe okomipesa na mobali mosusu te, ngai mpe nakosala kaka bongo epai na yo.
Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko. Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.