2
Moyengebene akobika na nzela ya kondima na ye 
 
1 Nakotelema na esika na ngai ya kokengela,  
nakotelema ngai moko na likolo ya mir,  
nakosenzela mpo na komona makambo  
oyo akoyebisa ngai  
mpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.   
2 Yawe ayanolaki :  
— Koma emoniseli oyo,  
koma yango na etando ya mabanga,  
koma yango penza malamu  
mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.   
3 Emoniseli oyo ezali kaka kozela  
tango na yango oyo ekatama ;  
ezali kolobela makambo oyo ekosalema  
na tango ya suka ;  
solo, ekokosa te.  
Ata ewumeli, zela yango kaka ;  
solo, ekokokisama, ekowumela te.   
   
 
4 Tala, atondisami na lolendo,  
motema na ye ezali na bosembo te ;  
kasi moto ya sembo akobika  
na nzela ya kondima na ye.   
   
 
5 Solo, masanga ya vino ekosaka ;  
moto ya lolendo avandaka kimia te.  
Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi  
mpe atondaka te lokola kufa,  
asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye  
mpe akomisaka bango bawumbu na ye.   
6 Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te  
na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola :  
« Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi  
mpe akolisaka bomengo na ye  
na kobotola bato biloko na makasi ! »  
Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini ?   
7 Boni, bakolo biloko bakobimela yo te na pwasa ?  
Bakolamukela yo mpe bakolengisa yo.  
Boni, okokoma te lokola mosuni na bango ya kolia ?   
8 Lokola obotolaki bomengo  
ya bato ya bikolo ebele na makasi,  
bato oyo batikali bakobotola  
yo mpe bomengo na yo na makasi,  
mpo ete osopaki makila ya bato,  
obebisaki mikili mpe bingumba  
elongo na bavandi na yango nyonso.   
   
 
9 Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye  
na nzela ya sembo te !  
Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba  
mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.   
10 Lokola osalaki mabongisi ya kobebisa bato ebele,  
obongisaki nde soni ya ndako na yo moko  
mpe okotisi nde bomoi na yo moko na likama.   
11 Mabanga ya mir ekoganga  
mpe mabaya ya motondo ekoyanola.   
   
 
12 Mawa na moto oyo atongaka  
engumba na nzela ya makila  
mpe alendisaka yango na nzela ya lokuta !   
13 Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,  
ete misala ya bato ezala kaka lokola koni  
oyo ezali kopela moto,  
ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba ?   
14 Pamba te mokili ekotonda  
na boyebi ya nkembo na Yawe  
ndenge mayi etondaka na ebale.   
15 Mawa na moto oyo amelisaka  
moninga na ye masanga makasi  
kino asilisa mbeki nyonso mpe alangwa  
mpo ete amona bolumbu na ye !   
16 Na esika ete otondisama na nkembo,  
okotondisama na soni.  
Sik’oyo ekomi tango na yo,  
mela mpe tikala bolumbu !  
Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe  
eyei kozingela yo,  
mpe soni ekozipa nkembo na yo.   
17 Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo,  
mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo ;  
pamba te osopaki makila ya bato,  
obebisaki mikili mpe bingumba  
elongo na bavandi na yango nyonso.   
   
 
18 Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini,  
pamba te moto nde asalaki yango ?  
Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta  
ezali na tina penza nini ?  
Pamba te moto oyo asalaki yango  
azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye,  
asali nde ekeko oyo elobaka te.   
19 Mawa na moto oyo alobaka  
na eteni ya nzete : « Telema ! »  
Mawa na moto oyo alobaka  
na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! »  
Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ?  
Bazipa yango wolo mpe palata,  
kasi pema ezali te kati na yango.   
   
 
20 Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ;  
tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !