3
Kondima to Mobeko
Oh bato ya Galatia, bozali penza babolole ! Nani aloki bino ? Balimbolelaki bino polele ndenge nini babakaki Yesu-Klisto na ekulusu. Nalingi kotuna bino motuna moko kaka : « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? » Ndenge nini bokoki kokoma babolole boye ? Ndenge nini bino oyo bobandaki na Molimo bozali sik’oyo kosukisa na mosuni ? Boni, bomonaki kaka pasi ya pamba, soki penza ezalaki mpe mpo na pamba ? Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akomisaki ye moto ya sembo. Boye, boyeba malamu ete ezali kaka bato oyo bazali na kondima kati na Nzambe nde bazali bana ya Abrayami.
Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. » Boye, bato oyo bazali na kondima bazali ya kopambolama elongo na Abrayami, moto na kondima.
10 Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. »
11 Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.
12 Nzokande, Mobeko ewuti na kondima te, pamba te ekomama : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
13 Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. » 14 Asalaki bongo mpo ete, kati na Klisto Yesu, Bapagano bazwa mapamboli ya Abrayami, mpe mpo ete biso tozwa, na nzela ya kondima, Molimo oyo Nzambe alakaki.
Mobeko mpe elaka
15 Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama. 16 Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto. 17 Nalobi boye : « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami ; soki te, elaka ekomi eloko pamba. » 18 Pamba te soki libula ezwami na nzela ya Mobeko, wana elaka ezali lisusu na esika te. Nzokande ezali penza na nzela ya elaka nde Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Abrayami.
19 Bongo mpo na nini Mobeko ? Mobeko ebakisamaki mpo na kobimisa polele bozangi botosi ya bato, kino na boyei ya Mokitani epai ya nani Nzambe apesaki elaka. Mobeko yango epesamaki na nzela ya ba-anjelu, mpe mokumba na yango epesamaki na maboko ya moyokanisi. 20 Nzokande soki ezalaki na moyokanisi, elingi koloba ete ezalaki mpe na masanga ebele ya koyokanisa. Kasi mpo na oyo etali elaka, Nzambe azali kaka Ye moko.
21 Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango. 22 Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.
Bana ya Nzambe
23 Liboso ete kondima eya, tozalaki na se ya bokonzi ya Mobeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama. 24 Boye Mobeko ezalaki lokola mokengeli, ezalaki na mokumba ya komema biso epai ya Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima. 25 Lokola sik’oyo kondima eyei, tozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te.
26 Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ; 27 pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto. 28 Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto. 29 Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.