19
Loyembo ya mawa mpo na bakonzi ya Isalaele 
 
1 « Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba :   
2 ‹ Mama na yo azalaki nani ?  
Nkosi ya mwasi kati na bankosi !  
Ezalaki kovanda kati na bana na yango  
mpe kobokola bana yango.   
3 Ekolisaki moko kati na bana na yango,  
mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi.  
Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.   
4 Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango  
mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu ;  
bakangaki yango bibende na zolo  
mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito.   
   
 
5 Tango mama ya nkosi yango emonaki  
ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela  
mpe elikya na yango esili,  
ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango,  
ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.   
6 Ekomaki konguluma kati na bankosi,  
pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi.  
Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.   
7 Ekweyisaki bandako na bango ya makasi  
mpe ebebisaki bingumba na bango.  
Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna  
bazalaki kotondisama na somo.   
8 Bongo bato ya bituka ya zingazinga,  
longwa na bikolo na bango,  
bayaki kotelemela yango,  
batielaki yango mitambo na bango  
mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango.   
9 Bakangaki yango minyololo,  
bakotisaki yango kati na ndako ya banyama,  
bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni.  
Babwakaki yango na boloko  
mpo ete mongongo ya koganga na yango  
eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.   
Loyembo ya mawa mpo na nzete ya vino 
 
10 Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino  
kati na elanga na yo ya vino,  
oyo elonama pembeni ya mayi,  
ezalaki kobota bambuma ebele,  
ezalaki na bitape ebele  
mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.   
11 Bitape na yango ezalaki makasi,  
ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi,  
ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu ;  
eyebanaki makasi mpo na molayi na yango  
mpe mpo na ebele ya makasa na yango.   
12 Kasi bapikolaki yango na kanda  
mpe babwakaki yango na mabele.  
Mopepe ya este ekawusaki yango,  
ekweyisaki mbuma na yango,  
ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi  
mpe moto etumbaki yango.   
13 Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe,  
mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi.   
14 Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango  
mpe etumbi mbuma na yango ;  
ata etape moko te ya makasi etikalaki  
mpo na kosala lingenda ya bokonzi. ›  
Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »