8
Yawe ateyaki bato na Ye kati na esobe
Salela na bokebi mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo mpo ete bokoka kovanda, kokoma ebele, kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe alakaki epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te. Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe. Bilamba na yo etikalaki konzuluka te mpe makolo na yo etikalaki kovimba te na mibu wana tuku minei. Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye. Tosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na yo, na kotambolaka na banzela na Ye mpe na kopesaka Ye lokumu. Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ; mokili oyo etonda na ble, na orje, na vino, na banzete ya figi, na banzete ya grenade ; mokili ya mafuta ya olive mpe ya nzoyi ; mokili oyo bokozanga lipa te mpe eloko moko te ; mokili oyo mabanga ezali bibende mpe bokoki kobimisa motako* na bangomba. 10 Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino.
11 Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo. 12 Tango okolia mpe okotonda, tango okotonga bandako ya kitoko mpe okovanda kuna, 13 tango bangombe na yo, bantaba na yo mpe bameme na yo ekobotana mingi, tango palata na yo mpe wolo na yo ekokoma ebele mpe biloko nyonso oyo ozali na yango ekokoma ebele ; 14 sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu, 15 oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi.
16 Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu. 17 Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! » 18 Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo.
19 Soki obosani Yawe, Nzambe na yo, soki osaleli banzambe mosusu, soki ogumbameli mpe ofukameli yango, nalobi na bino solo lelo ete bokobebisama. 20 Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino.
* 8:9 Motako elakisi na lifalanse : cuivre. 8:15 Koto elakisi na lifalanse : scorpion.