33
Moyize apamboli mabota zomi na mibale ya Isalaele
Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa. Alobaki :
« Yawe awutaki na Sinai ;
wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo,
angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani,
ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye
mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
Solo, olingaka bato,
basantu nyonso basimbami na loboko na Yo.
Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka.
Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.
Moyize apesa biso Mobeko oyo
ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi.
Azalaki mokonzi ya Yeshuruni
tango bakambi ya bato basanganaki
elongo na mabota ya Isalaele.
 
Tika ete Ribeni awumela na bomoi mpe akufa te,
mpe tika ete bato na ye bazala moke te ! »
Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda :
« Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda ;
zongisa ye epai ya bato na ye !
Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye,
mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye ! »
Mpo na Levi, alobaki :
« Urimi mpe Tumimi na Yo ezali mpo na moyengebene
oyo omekaki ye motema na Masa,
mpe oyo owelanaki na ye na mayi ya Meriba,
oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka,
bolingo epai ya baboti na ye,
bandeko na ye mpe bana na ye moko,
mpo na kotosa maloba na Yo
mpe kobatela boyokani na Yo.
10 Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi,
mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ;
abonzaka ansa liboso na Yo,
mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.
11 Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala,
mpe sepela na mosala ya maboko na ye.
Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye,
mpe loketo ya bayini na ye
kino bakoka lisusu te kotelema. »
12 Mpo na Benjame, alobaki :
« Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia
pembeni na Ye,
pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ;
mpe moto oyo Yawe alingaka
apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »
13 Mpo na Jozefi, alobaki :
« Tika ete Yawe apambola mokili na ye
na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo,
mpe na nzela ya mayi ya mozindo
oyo etiolaka na se ya mabele
14 elongo na biloko oyo eleki motuya,
oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko,
oyo ebimaka sanza na sanza ;
15 na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala,
mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko
ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu ;
16 na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko,
bambuma oyo etondi kati na mokili !
Tika ete Nzambe oyo avandaka
kati na nzete moke oyo ezali kopela moto
apambola moto ya Jozefi
mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye !
17 Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ;
maseke na ye ezali lokola ya mpakasa.
Na nzela na yango nde ebetaka bikolo,
ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili.
Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza,
tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »
18 Mpo na Zabuloni, alobaki :
« Oh Zabuloni, sepela na kobima na yo !
Mpe yo Isakari, tika ete osepela kati na bandako na yo ya kapo.
19 Bakobengisa bato na likolo ya ngomba,
mpe bakobonza kuna bambeka ya bosembo,
bakosala feti mpo na bomengo ya bibale minene,
mpe mpo na bozwi oyo ebombama na zelo ya libongo. »
20 Mpo na Gadi, alobaki :
« Tika ete apambolama,
moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene !
Gadi akowumela kuna lokola nkosi
oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.
21 Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko,
bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi.
Atambolaki liboso ya bato ;
mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe
mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. »
22 Mpo na Dani, alobaki :
« Dani azali mwana ya nkosi
oyo epumbwaka wuta na Bashani. »
23 Mpo na Nefitali alobaki :
« Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe,
akozwa libula ya weste mpe ya sude. »
24 Mpo na Aseri, alobaki :
« Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli.
Tika ete bandeko na ye basalela ye
mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta.
25 Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze.
Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali.
 
26 Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni,
Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo,
mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.
27 Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo,
azali tango nyonso Mosungi awa na se.
Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo
mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.
28 Boye Isalaele akowumela na kimia,
mpe etima ya Jakobi ezali kotiola
kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika,
epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.
29 Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo !
Libota nini ekokani na yo,
yo libota oyo Yawe abikisi ?
Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo.
Banguna na yo bakokima liboso na yo,
mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »