24
Mibeko na tina na koboma libala mpe kobala lisusu
Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye. Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu. Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye ; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi, boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye : kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
Makambo oyo bosengeli te kosala na bato
Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.
Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.
Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
Mibeko na tina na bokono ya maba
Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango. Bobosana te makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai ya Miriami, na nzela, sima na bino kobima na Ejipito.
Makoki ya bato bakelela
10 Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga. 11 Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga. 12 Soki moto yango azali mobola, kokende kolala te na ndanga oyo asimbisaki yo mpo na niongo. 13 Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo ; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
14 Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela : azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo. 15 Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.
16 Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.
17 Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga. 18 Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna.
19 Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala. 20 Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali. 21 Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali. 22 Bokanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito. Yango wana natindi bino kotosa mibeko oyo.