Mibeko mpo na evandeli ya bato
21
Kufa ya moto oyo ayebani mobomi te
Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te, bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga, mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te ; bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.
Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali. Bongo bampaka ya engumba yango bakosukola maboko na bango na likolo ya mwana ngombe ya mwasi oyo bakobuka kingo na lubwaku mpe bakoloba : « Maboko na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te tango likambo yango esalemaki. Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. »
Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki. Na nzela wana nde bokolongola, kati na bino, ngambo ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te wana bokosala likambo ya bosembo na miso ya Yawe.
Kobala mwasi mokangami na bitumba
10 Tango bokokende kobundisa banguna na bino, bongo Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino mpe bokangi ndambo ya bato ; 11 soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye. 12 Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ; 13 akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye ; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango. 14 Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi ; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye.
Makoki ya mwana liboso ya moto
15 Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te ; 16 tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali ; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te. 17 Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.
Soki mwana atombokeli baboti na ye
18 Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu, 19 tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango. 20 Bakoloba na bampaka ya engumba : « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga. » 21 Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
Ebembe ya moto oyo badiembiki
22 Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete, 23 ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.