19
Mibeko na tina na bingumba ya kobombamela
Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango ; bokotia pembeni mpo na bino, bingumba misato oyo ezali na kati-kati ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa. Bokosala kuna banzela mpe bokokabola na biteni misato, mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto akoka kokima kuna.
Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso. Ndakisa : moto oyo akei na zamba elongo na moninga na ye mpo na kokata banzete ; bongo na tango atomboli loboko na ye mpo na kokata nzete, ebende ya epasola elongwe na esimbelo na yango, ekweyeli moninga wana mpe ebomi ye : moto wana akoki kokima kati na moko ya bingumba wana mpo na kobikisa bomoi na ye. Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma. Yango wana, napesi bino mitindo ete botia pembeni bingumba misato mpo na bino.
Soki Yawe, Nzambe na bino, ayeisi monene mokili na bino ndenge alakaki epai na bakoko na bino na nzela ya ndayi mpe apesi bino mokili mobimba ndenge alakaki bango, mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso. 10 Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.
11 Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana, 12 bampaka ya engumba na ye bakolukisa ye, bakozongisa ye na engumba na ye mpe bakotika ye na maboko ya mobukanisi makila mpo ete aboma ye. 13 Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu.
14 Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.
Mibeko na tina na batatoli
15 Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
16 Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto ; 17 bato nyonso mibale oyo bazali kowelana bakotelema na miso ya Yawe liboso ya Banganga-Nzambe mpe basambisi oyo bazali kosala mosala kati na bino na tango wana. 18 Basambisi basengeli koyekola likambo yango malamu penza. Mpe soki emonani ete motatoli akosi, apesi litatoli ya lokuta mpo na ndeko na ye ; 19 bosala ye ndenge akanaki kosala ndeko na ye. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. 20 Tango bato oyo batikali bakoyoka yango, bakobanga mpe mabe ya lolenge oyo ekotikala lisusu kosalema te kati na bino. 21 Boyokela moto ya ndenge wana mawa te ! Mobeko ezali : bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.